Yesu Klisto

Nsambo ya Elambo

  • Makambo mazali kati ya buku

  • Lipamboli ya Lipa

  • Lipamboli ya Mai

Nsambo ya Elambo


Nsambo ya Elambo

  • Lipamboli ya Lipa

    O Nzambe, Tata ya Seko, tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana na yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa lipa oyo mpo na milimo ya baoyo nyonso bakokamata yango; ete bakoka kolia na bokundoli ya nzoto ya Mwana na yo, mpe batatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana na yo, mpe komikundola ye ntango nyonso mpe kobomba mitindo oyo apesaki bango, ete bakoka ntango nyonso kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.


  • Lipamboli ya Mai

    O Nzambe, Tata ya Seko, tozali kosenga yo, na nkombo ya Mwana na yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa mai oyo mpo na milimo ya baoyo nyonso bakomela yango, ete bakoka kosala yango na bokundoli ya makila ya Mwana na yo, oyo esopanaki mpo na bango; ete bakoka kotatola yo, O Nzambe, Tata ya Seko, ete bazali komikundola ye ntango nyonso, ete bakoka kozala na Molimo na ye elongo na bango. Amene.