Liyaka ya Ntalo Monene Lokasa ya Nkombo BoyingisiLiyaka ya Ntalo Monene ezali boponi ya mateya ya motuya monene mpe ya boponi oyo etali biteni mingi mpe ya ntina monene ya bondimi mpe malongi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Makambo oyo ebongolamaki mpe ebimisamaki na Profeta Joseph Smith, mpe mingi ebimisamaki na nkoma kati na bazulunale ya Eklezia ya mikolo na ye. Mose Makambo Ezali Kati na Buku Mose 1Nzambe Amimonisi Ye moko epayi ya Mose—Mose abongolami—Atelemelami na Satana—Mose amoni mikili mingi oyo ezali na bafandi—Mikili oyo ekoki kotangama te mpe oyo ekelamaki na Mwana—Mosala mpe nkembo ya Nzambe ezali nde kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto. Mose 2Nzambe akelaki lola mpe mabele—Ndenge nyonso ya bomoi ekelami—Nzambe asali moto mpe apesi ye mpifo likolo ya nyonso mosusu. Mose 3Nzambe akelaki biloko nyonso na molimo liboso ete bimonana na miso likolo ya mabele—Akelaki moto, mosuni ya yambo, likolo ya mabele—Mwasi azali mosungi ya kokoka mpo na mobali. Mose 4Lolenge nini Satana akomaki zabulu—Asengini Eva—Adama mpe Eva bakwei, mpe kufa ekoti na mokili. Mose 5Adama na Eva baboti bana—Adama atumbi mbeka mpe asaleli Nzambe—Kaina mpe Abele babotami—Kaina atomboki, alingi Satana mingi koleka Nzambe, mpe akomi Ebomi—Bobomi mpe nkuna epalangani—Nsango malamu eteyami uta na ebandeli. Mose 6Nkona ya Adama esimbi buku ya bokundoli—Bana na ye ya sembo bateyi boyamboli—Nzambe amimonisi Ye moko epayi ya Enoka—Enoka ateyi nsango malamu—Mwango ya lobiko mobimisamaki na Adama—Azwaki libatisi mpe bonganganzambe. Mose 7Enoka ateyi, akambi bato, mpe alongoli bangomba—Engumba ya Siona etongami—Enoka amoni na mosika boyei ya Mwana ya Moto, mbeka ya bomikabi na Ye, mpe bosekwi ya Basantu—Amoni na mosika Bozongisi, Bosangani, Boyei ya Mibale, mpe bozongi ya Siona. Mose 8Metusela asakoli—Noa mpe bana mibali na ye bateyi nsango malamu—Nkuna monene eyingeli—Bato bati bokebi te na libiangi mpo na boyamboli—Nzambe abimisi mokano ya kobebisa mosuni nyonso na Mpela. Abalayama Makambo Ezali Kati na Buku Abalayama 1Abalayama aluki kozwa mapamboli ya molongo ya bonkoko—Anyokwami na banganganzambe ya lokuta na Kaladi—Yehova abikisi ye—Batali malamu mpe balimboli na bokuse ebandeli mpe mbulamatari ya Ejipito. Abalayama 2Abalayama alongwe na Ulu mpo na kokende na Kanana—Yehova amonani epayi na ye na Halana—Mapamboli nyonso ya nsango malamu malakelami na nkona na ye mpe na banso na nzela ya nkona na ye—Akei na Kanana mpe akobi na Ejipito. Abalayama 3Abalayama ayekoli oyo etali moi, sanza, mpe minzoto na nzela ya Ulima mpe Tumima—Nkolo abimisi epayi na ye lolenge ya seko ya milimo—Ayekoli mpo na oyo etali bomoi yambo ya bokeli ya mabele, bokulisi yambo na mbotama, Bokeli, boponami ya Mosikoli, mpe ezalela ya mibale ya moto. Abalayama 4Banzambe basali mwango ya bokeli ya mabele mpe nyonso ya bomoi likolo na yango—Miango na bango mpo na mikolo motoba ya bokeli milimbolami. Abalayama 5Banzambe basilisi mwango na Bango ya bokeli ya biloko nyonso—Bakokisi bokeli engebene na miango na Bango—Adama apesi nkombo na ekelamo na bomoi moko na moko. Bilili ya nkoma na maboko Bilili ya Nkoma na Maboko 1 Bilili ya Nkoma na Maboko 2 Bilili ya Nkoma na Maboko 3 Joseph Smith—Matai Joseph Smith—Matai 1Yesu ayebisi kala liboso esalema bobebisami ebelemi ya Yelusaleme—Alobeli lisusu makambo matali Boyei ya Mibale ya Mwana ya Moto, mpe bobebisami ya bato ya nkuna. Joseph Smith—Mambi ya Kala Joseph Smith—Mambi ya Kala 1Joseph Smith azali koyebisa makambo matali batata na ye, bato ya libota na ye, mpe bifandelo na bango ya yambo—Botumoli ya ndenge mosusu na ntina ya biyamba eyingelaki na westi ya ekolo ya New York—Akamati mokano ya koluka kozwa bwania lokola elakisami na Yakobo—Tata mpe Mwana bamonani, mpe Joseph Smith abiangami na mosala na ye lokola profeta. (Milongo 1–20.) Biteni ya Bondimi Biteni ya Bondimi 1Tondimelaka Nzambe, Tata ya Seko, mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu.