BJS, Yakobo 2:1. Meka na Yakobo 2:1
Bato ya lingomba basengeli kotala moto moko te kozala likolo koleka mosusu.
1 Bandeko na ngai bandimi, bokoki kozala na bondimi ya Nkolo na biso Yesu Klisto, Nkolo ya nkembo te, nzokande na ntango yango bozali koponaka bilongi ya bato.
BJS, Yakobo 2:14–21. Meka na Yakobo 2:14–22
Bondimi ezanga misala ezali ya kokufa mpe ekoki te kobikisa.
14 Litomba nini ezali, bandeko na ngai ya mibali, mpo na moto aloba azali na bondimi, mpe azali na misala te? Bondimi ekoki kobikisa ye?
15 Iyo, moto akoki koloba, nakolakisa yo ete nazali na bondimi ezanga misala; kasi nakoloba, Lakisa ngai bondimi na yo ezanga misala, mpe nakolakisa yo bondimi na ngai na misala.
16 Mpo soki ndeko moko ya mobali to ndeko moko ya mwasi azangi elamba mpe azali mozangi, mpe moko kati na bino alobi, kende na kimia, yoka moto mpe otonda; mpe ye apesa bango te oyo ezali ntina mpo na nzoto; bondimi na bino ezali ntina nini mpo na bato ya boye?
17 Ezali lolenge moko na bondimi, soki ezangi misala, ezali ya kokufa, kozala yango moko.
18 Na yango olingi oyeba, O moto ya mpamba, oyo bondimi ezanga misala ezali ya kokufa mpe akoki te kobikisa yo?
19 Ondimi ete ezali bobele Nzambe moko; osali malamu; bazabulu lisusu bandimelaka, mpe balengaka; omikokanisaki na bango, na komilengelaka te.
20 Misala ya Abalayama tata na biso emonisamaki te, ntango abonzaki mwana na ye ya mobali Yisaka likolo ya etumbelo?
21 Omoni lolenge nini misala etambolaki elongo na bondimi na ye, mpe ete na misala bondimi ezalaki ya kobonga nie?