Eteni 116
Litangi uta na mambi ya kala ya Joseph Smith, elobeli emoniseli moko epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, penepene na Wight’s Ferry, na esika ya ngomba babiangi Spring Hill, Etuka ya Daviess, Missouri, sanza ya mitano to ya motoba ya mobu 1838.
1 Ngomba ya Spring Hill epesamaki nkombo ya Adama-ondi-Amana na Nkolo, mpo, elobaki ye, ezali esika wapi Adama akoya kotala bato na ye, to Mokolo ya Mikolo akofanda, lokola elobamaki na profeta Danyele.