“Nzambe Ayebaka mpe Alingaka Bino,” Liahona, Sanza ya zomi. 2026.
Etinda ya Sanza Liahona , Sanza ya zomi 2026
Nzambe Ayebaka mpe Alingaka Bino
Bosolo ya solo mpe ya seko ezali ete Tata na biso ya Lola alingaka biso mpe akobosana to akosundola biso ata moke te.
Kutu liboso baboti na ngai kokota na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, bateyaki bandeko na ngai misato ya mibali mpe ngai na ntina ya Nzambe mpe Yesu Klisto. Nayebaki ntango nyonso ete Nzambe azali wana mpe ayebi ngai mpe alingaka ngai. Nazalaki kotya ntembe ata mokolo moko te.
Lokola mibu mileki, bososoli na ngai mpe litatoli na ngai ya boniboni malamu Nzambe ayebi ngai mpe boniboni Ye alingaka ngai ekomi mozindo. Lelo, lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto, natatoli ete Nzambe ayebi mpe alingaka bana na Ye nyonso.
Nalingi kobengisa bino bomanyola elongo na ngai na ntina ya lipamboli ya mozindo ya kososola boniboni Nzambe ayebaka bino na mozindo mpe alingaka bino na lolenge ya kokoka.
Nzambe Ayebaki mpe Alingaki Yo na Ebandeli
Nkolo ayebisaki profeta Yilimia, “Yambo nasala yo na libumu nayebaki yo” (Yelimia 1:5). Yango ezali solo mpo na moto nyonso—mpe yo lisusu.
Nzambe azali Tata na yo ya Lola. Ayebaki yo uta kala. Kutu, ozalaki “na ebandeli elongo na Tata” (Malongi mpe Mayokani 93:23). Lokola moko ya bana na Ye ya molimo, bozalaki wana na likita ya lola epai wapi Tata na Lola alakisaki mwango monene na Ye ya esengo. Profeta Joseph Smith ateyaki ete mwango ya Nzambe epesi moko na moko na biso “mokano ya kokende liboso lokola [Ye] moko [mpe] … kotombolama elongo na [Ye] moko.” Tata na Lola alingaki ete ozala na libaku malamu oyo mpe apesaki yo libaku ya kopona kokoma lokola Ye.
Nyonso Tata na Lola asali mpe azali kosala mpo na kotombola mwango monene na Ye ya esengo ezali emoniseli ya bolingo na Ye ya kokoka mpo na biso. Azali na botondi ya esengo mpe alingi biso tozala na botondi wana mpe. Lokola “mwana mobali ya molimo ya bolingo to mwana mwasi ya baboti ya lola,” tozali na makoki oyo ya bonzambe oyo ekangisaka biso na Tata na Lola mpe ebongisaka lolenge nini Ye azali komona biso.
Tata na Lola atondisami na bolingo ya nsuka te, ya kokoka, ya bule, mpe ya peto mpo na bino oyo eleki ndimbola. Ozali na ntina mpo na Ye mpo ozali mwana na Ye. Bolingo na ye mpo na bino ebandaki na boseko kala yambo ya kobotama. Mpe ewumeli na bomoi na yo mobimba ya nkufa mpe kokende liboso kino na boseko.
Nzambe Ayebi mpe Alingi Bino Sikawa
Na ntango ya bokufi bokundoli ya bozali na biso yambo ya nkufa ezipami na ngolu, kopesaka biso nzela ya kotambola na bondimi mpe kosalela boponi na biso na boyokani na mwango ya kokoka ya Tata na Lola. Kasi Tata na Lola amikundolaka. Amikundoli kaka te nani tozalaki na ntango wana, kasi ayebi mpe makambo nyonso na ntina na biso sikawa.
Ayebi makambo nyonso ya bomoi na biso, mikakatano, bisengo, mpe mawa na biso nyonso. Ye kaka ye moko ayebaka makanisi na biso mpe mikano ya mitema na biso (tala Malongi mpe Mayokani 6:16). Mpaka Ronald A. Rasband ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki, “Moto moko te ayebi bino malamu koleka to amibanzabanzaka mingi mpo na bino koleka [Tata na Lola].”
Lokola ayebi biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso koleka moto mosusu nyonso, Tata na Lola amitungisaka na ntina ya matambe oyo tozali kosala awa na mabele. Ayebi oyo nini ekosalisa biso tokokisa makoki na biso ya bonzambe lokola mwana na Ye ya mobali to mwana mwasi. Koleka oyo tokoki kokanisa, Ye alingaka biso tokokisa lobi na biso ya selestiale—kozonga na ndako na biso ya lola.
Atako biso banso tozali bato ya kozanga kokoka, Ye alingaka moko na moko na biso na lolenge ya kokoka. Ezali na lolenge moko oyo Tata na Lola alakisaki polele bozindo ya bokebi na Ye ya bolingo: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili boye, ete apesaki Mwana na ye se moko, ete moto nyonso oyo andimeli ye akufa te, kasi azala na bomoi ya seko” (Yoane 3:16).
Nzambe alingaki biso mingi—alingaki biso makasi mpe na mobimba—ete atindaki Yesu Klisto, Mwana na Ye ya liboso, “Molingami mpe Moponami uta na ebandeli” na Ye” (Mose 4:2), mpo azala Mwana na Ye Se moko mpe Mobikisi ya mokili. Mbeka ya bomikabi ya Yesu Klisto ezali elakiseli ya nsuka mpe ya nkembo koleka ya bolingo ya Tata mpo na biso mpe mpo na bana na Ye nyonso.
Yesu Klisto ayaki kosala mokano ya Tata. Na bopolo mpe komikitisa ya motema, Akitaki na nse ya makambo nyonso (tala Malongi mpe Mayokani 122:8) mpe asalaki mbeka na Ye ya bomikabi mpo na kokokisa mwango monene ya esengo ya Tata. Alongaki lisumu mpe liwa mpo ete bato nyonso basekwa mpe bazwa libaku ya koyambola mpe bazwa bolimbisi. Apesi mayokani oyo epesaka biso “ndingisa ya ntina ya bolingo mpe ngolu” mpe libaku ya kozwa bomoi ya seko mpe “nyonso oyo [Tata] azali na yango” (Mateya mpe Mayokani 84:38).
Tosengi bomikundola ete “nyonso oyo [Tata] azali na yango” esangisaka kaka te mapamboli oyo Ye akoki kopesa biso na nsuka nsima ya bomoi oyo kasi lisusu oyo Ye azali kopambola biso na yango sikawa. Azali “kosunga [biso] uta ngonga moko kino na ngonga mosusu” (Mosiya 2:21), bakisa mpe na banzela oyo mimeseno ebongi na biso mpe na makambo na biso.
Lokola tozali kopusana penepene na Ye mpe Mwana na Ye, ntango tozali kobondela Tata na nkombo ya Mwana, mpe ntango tozali kobatela mitindo na Bango, “azali mbala moko kopambola [biso]” (Mosiya 2:24) na mapamboli mingi koleka.
Na bomoi oyo, Nzambe azali “mosika te na moko na moko na biso” (Misala 17:27).
Nazongeli makanisi ya Mpaka Neal A. Maxwell (1926–2004), oyo andimaki ete “mokolo moko mosika ekokoma kutu komonana mingi koleka sikawa ezali ete Tata na biso ya bolingo azali kosala nyonso kutu Ye akoki kosala mpo na kosunga biso!”
Nzambe Akoyeba mpe Akolinga Yo Libela
Bato oyo bandimelaka mingi na bomoi oyo bazalaka na momesano ya kozala baye toyebi malamu koleka, oyo bayebi biso malamu koleka, oyo balingaka biso mpe bazali na bolamu na biso na motema, mpe oyo bamimonisaki ete bakoki kondimelama. Lokola Tata na biso na Lola ayebi biso malamu mpenza, alingaka biso mingi, asali mpe azali kosala mingi mpo na biso, mpe azali ya kokoka mpe ya kobongwana te, tokoki ntango nyonso kotia motema na Ye.
Tomonaka ntango mosusu ete kondima na biso ezali kotepatepa? “[Tozali] na mokumba ya kobatela?” Emonani ete nzela oyo ezali liboso ezali polele te? Ezali na mikakatano oyo emonani lokola ete ezali na nsuka te ata soki tosali nini to tobondelaka na molende ndenge nini mpo na kozwa lisungi? Ezali na mapamboli oyo tozalaki kolikya mpe kobondela oyo ekokisami te?
Natatoli ete Nzambe akobosana biso ata moke te; Akosundola biso mpe te. Ayebaka biso mpe ayebaka nini ezali malamu mpo na biso na ngonga nyonso ya bomoi na biso. Amonaka nsuka banda na ebandeli. Ayebi kutu ngonga oyo tozali, mayoki na biso, mpe bamposa na biso ya molimo mpe ya ntango, lokola mpe bamposa ya moto nyonso nzinganzinga na biso.
Ezali na ntina kososola ete mapamboli na Ye eyaka engebene na bolingi na Ye moko, nzela, mpe ntango. Ntango na Ye ekoki kokesana na oyo ya biso, kasi mapamboli na Ye eyaka. Ndimela Ye mpo na “kozala kimia, mpe koyeba ete [Azali] Nzambe” (Nzembo 46:10), ete ayebi makambo nyonso, mpe ete ayebi biso. Lokola tondimela Ye, bolingo na Ye ekoki kozinga biso mobimba. Alaki ete tokoki kobaluka epai na Ye mpo na lisalisi mpe bokambi ntango nyonso. Akoyeba mpe akolinga biso libela.
Natatoli ete ntango tozali kotia elikia na biso na Tata na biso ya Lola ya bolingo mpe na Mwana na Ye ya bolingo, kobatela mayokani na biso, mpe koyika mpiko na bondimi kino na nsuka, tokosepela na bilaka na Tata, oyo asalaka nyonso na kati ya nguya na Ye mpo na kosalisa biso tozonga na miso na Ye mokolo mosusu. Mpe ntango tozali kosala bongo, nalaki ete tokozala na makoki ya kotatola, lokola profeta Yisaya asalaki kala, na ntina ya “ebele ya boboto [ya Nzambe]” (Yisaya 63:7).
Tata na Lola ayebaki mpe alingaki biso ntango nyonso. Alingi biso mpe azali wana mpo na biso sikawa. Natatoli ete Ye azali ntango nyonso na bolingi ya koyanola na mabondeli na biso. Tika ete toyoka ntango nyonso boniboni mingi Ye ayebi biso, amibanzabanzaka mpo na biso, alingaka biso, mpe azali na bolingi ya kosalisa mpe kopambola biso—sikowa mpe libela.
© 2026 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Liahona Message, October 2026. Lingala. 20059 639