2022
Luta mpe Naomi
Sanza ya Motoba 2022


“Luta mpe Naomi,” Etinda ya Sanza Moninga Sanza ya mibale 2022

“Luta mpe Naomi”

Etinda mpo na Moninga Sanza ya motoba 2022

Luta mpe Naomi

Elilingi
Luta akotaki libala, na libota ya Naomi

Liyemi na Apryl Stott

Naomi mpe libota na ye bautaki na mabele moko ya sika mpo na nzala. Bakutanaki na elenge mwasi na nkombo Luta. Luta abalanaki na mwana ya Naomi ya mobali.

Elilingi
Luta na mobali alingi kokufa

Boye mobali ya Luta akufaki Luta azalaki na mawa makasi.

Elilingi
Naomi

Naomi azalaki mpe na mawa makasi. Azalaki na libota te ekokaki kobatela ye. Azuaki mokano ya kozonga na mabele awutaka.

Elilingi
Naomi na Luta

Naomi ayebisaki luta azonga na libota na ye. Kasi Luta alingaki Naomi. Alakaki kokende na elongo na Naomi mpe kosunga ye.

Elilingi
Luta kobukaka na bilanga

Luta na Naomi bazalaki babola. Boye Luta asalaki makasi mpo na koluka bileyi mpo na bango.

Elilingi
Boaze na Luta na bilanga

Mokolo moko mobali moko na nkombo na Boaze amonaki Luta kolokotaka bambuma etikalaki na moko ya babilanga ye.

Elilingi
Boaze elongo na mosali

Boaze azalaki moto malamu. Ayebisaki basali na ye batika bilei ebele mpo na Luta

Elilingi
Luta, Boaze, mpe Naomi, elongo na bebe

Sima mikolo Luta na Boaze babalanaki. Babotaki mwana ya mobali. Naomi asungaki na kobatela ye.

Elilingi
Libota ezali kopesaka bilei

Nakoki kosalisa mpo na kobatela basusu. Nakoki kozala malamu na baye bazali na bosenga.

Kopakola langi na Lokasa

Nakoki Kobatela Basusu

Elilingi
bana elongo na koko ya mobali

Fina na foto mpo na kozwa yango.

Liyembi na Apryl Stott

Nani okoki kosunga?