2017
Litomba ya Koyika mpiko Malamu
July 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Nsambo 2017

Litomba ya Koyika mpiko Malamu

Ntango nazalaki elenge mobali, nasungaki na Eklezia lokola mopesi toli na mokambi ya bwanya ya disitiliki. Azalaki ntango nyonso komekaka koteya ngai. Namikundoli toli ya liteya moko apesaki ngai mokolo moko: “Ntango okutani na moto moko, sunga ye lokola azali na likambo mpenza, mpe okozala malamu koleka katikati ya ntango. Nsima nakanisaki ete alobaki mabe. Sikawa, nsima ya mibu 50, nakoki komona lolenge malamu kani asosolaki mokili mpe bomoi.

Biso nyonso tokutanaka na mimekano—ntango mosusu, mimekano ya mpasi mpenza. Toyebi ete Nkolo atikaka biso tokutana na mimekano na ntina ete topetolama mpenza mpe tobonga nie bongo tokoka kozala elongo na Ye mpo na seko.

Nkolo ateyaki Profeta Joseph Smith na boloko ya Liberty ete litomba ya koyika mpiko malamu na mimekano ekosunga ye mpo na kolongobanisa ye mpo na bomoi ya seko:

“Mwana wa ngai, kimia ezala na molimo mwa yo; mitungisi mpe mpasi na yo ekozala bobele mpo na ntango moke;

“Mpe nsima soki oyiki mpiko kino na nsuka, Nzambe akotombola yo likolo; okolonga banguna na yo nyonso” (D&C 121:7–8).

Makambo ebele mpenza ekomelaka biso na bomoi oyo yango wana ekoki komonana lokola mpasi mpo na koyika mpiko malamu. Ekoki komonana lokola bongo kati na libota oyo etalelaka nkona ntango mvula ezali kobeta te. Bakoki komituna, “Kino mokolo nini tokotikala koyika mpiko?” Ekoki komonana lokola bongo na elenge oyo atungisami na bosoto koleka mpe masenginya. Ekoki komonana lokola bongo na elenge mobali oyo azali kobunda mpo na kotanga to koyekola mpo na kozwa mosala na ntina ya kosunga mwasi mpe libota na ye. Ekoki komonana lokola bongo na mutu oyo akoki kozwa mosala te to abungisi misala mingi ntango bakompani ekufi. Ekoki komonana lokola bongo na baoyo bakutani na bokiti ya bokolongono mpe ya bokasi ya nzoto, oyo ekoki koya na lombango to nsima ya ntango molai na bomoi mpo na bango to mpo na baoyo balingaka.

Kasi Nzambe moko ya bolingo atie mimekano ya boye liboso na biso kaka mpo na kotala soki tokoki koyika mpiko na mpasi te kasi mpo na kotala soki tokolonga yango malamu mpe kokoma ya kopetolama mpenza.

Bakambi ya Yambo bateyaki Mpaka Parley P. Pratt (1807–57) ntango abengamaki sika kozala moko kati ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale: “Okoti na mosala oyo esengi bokebi na yo nyonso; … koma likula ya nsonge. … Osengeli koyika mpiko makasi na mosala, kosala mingi, mpe komipima mingi mpo na kokoma ya kopetoloma malamu. Tata na yo ya Lola asengeli yango; elanga ezali ya Ye; mosala ezali ya Ye; mpe Ako … pesa yo elikia … mpe kolendisa yo.”1

Kati ya Buku ya Baebele, Paul alobi na ntina ya mbuma ya boyiki mpiko malamu: “Na ntango, bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikojuisa mbuma na kimia na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11).

Mimekano mpe bampasi na biso epesaka biso libaku ya koyekola mpe kokola, mpe ekoki kobongola bomoto na biso mpenza. Soki tokoki kotalela Mobikisi na ntango ya mimekano na biso ya mpasi, milimo na biso ekoki kopetolama mpenza ntango toyiki mpiko.

Na yango, eloko ya yambo ya komikundola ezali kosambela ntango nyonso (tala D&A 10:5; Alma 34:19–29).

Eloko ya mibale ezali kokoba kobunda mpo na kobatela mitindo—atako bokeseni, masenginya, to makelele ya mokili nzinganzinga na biso (tala Moziya 4:30).

Eloko ya misatu ya ntina koleka ezali kosalela Nkolo (tala D&A 4:2; 20:31).

Na mosala ya Molakisi, toye koyeba nsima mpe kolinga Ye. Tokoki, soki toyiki mpiko na losambo mpe mosala ya bondimi, kobanda koyeba loboko ya Mobikisi mpe nguya ya Molimo Mosantu na bomoi na biso. Mingi kati na biso bapesamaki na ngonga moko mosala ya boye mpe bayokaki botamboli elongo wana. Soki ozongisi makanisi nsima na ntango wana, okomikundola ete mbongwana ekotaki kati na yo. Lisenginya ya kosala mabe emonisamaki kokita. Mposa ya kosala malamu emataki. Baoyo bayebaki yo malamu mpe balingaki yo bakoki koloba: “Okomi boboto koleka mpe motema kokita mpenza. Ozali komonana te lokola moto kaka oyo bato bayebi.”

Ozalaki te moto kaka oyobayebaki. Obongwanaki na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpo oyekamelaki Ye na ntango ya momekano na yo.

Nalaki yo ete Nkolo akoya mpo na lisungi na yo na mimekano soki oluki mpe osaleli Ye mpe ete molimo na yo ekopetolama na lolenge wana. Napusi yo otiya elikia epai na Ye na mitungisi na yo nyonso.

Nayebi ete Nzambe Tata azali na bomoi mpe Ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso nyonso. Nayebi ete Mwana na Ye, Yesu Klisto afutaki ntalo ya masumu nyonso mpe ete alingi biso toya epai na Ye. Nayebi ete Tata mpe Mwana bakengelaka biso mpe balengeli nzela mpo ya biso toyika mpiko malamu mpe tozonga ndako lisusu.

Matangi

  1. Autobiography of Parley P. Pratt, ed. Parley P. Pratt Jr. (1979), 120.