2015
Bizalela ya Yesu Klisto: Moto ya Motema molayi mpe ya Bompikiliki.
sánzá ya mísáto 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Misato 2015

Bizalela ya Yesu Klisto: Moto ya Motema molayi mpe ya Bompikiliki.

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino epai na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Bompikiliki epesaka mbala mingi likanisi ya lolenge ya kimia, ya boboto, kasi lokola Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi toli ya mibale na Bokambi ya Yambo, alobaki, “Bompikiliki ezali komitika se bongo te, ezali mpe ezaleli ya kokanga maboko na ntina ya bobangi na biso te. Bompikiliki elakisi bozeli ya makasi kati na kosala mpe ya molende. Elingi koloba kotikala ya kokangama na eloko… atako ba mposa ya mitema na biso esengeli kozela. Bompikiliki ezali kaka kotia molende te; ezali kotia molende malamu!”

Na bomoi na biso yambo ya bokufi, Tata na biso ya Lola abongisaki moango moko mpo na biso—bana na Ye ya molimo—mpe totondisamaki na esengo na libaku ya koya na mabele Yobo 38:7 Ntango toponi koyokanisa bolingi na biso elongo na oyo ya Ye awa na mabele, Ye “akotia [biso] lokola esaleli kati ya maboko na [Ye] mpo na libiki ya milimo ebele” (Alma 17:11).

Mokambi Uchtdorf akobaki koloba ete, “Bompikiliki elakisi kondima eloko oyo ekoki kobongolama te mpe kotelemela yango na bokasi, ngolu, mpe bondimi. Elingi koloba kozala na ‘bolingi ya kondima makambo nionso oyo Nkolo amoni malamu ya kotia likolo na [biso], atako lokola muana moke amitikaka epai ya tata na ye’ Moziya 3:19. Na suka, bompikiliki elakisi kotelema ‘ngwi mpe makasi, mpe kozangana kongingana na kobatelaka mitindo ya Nkolo’ [1 Nefi 2:10] ngonga nionso ya mikolo nionso, atako ezali mpasi mpo na kosala bongo.”1

Makomi ya Kobakisa

Nzembo 40:1; Bagalatia 5:22–23; 2 Petelo 1:6; Alma 17:11

Uta na Makomi

Makomi elobeli biso ete na bomoi na biso na mabele, tosengeli “kozala na bompikiliki kati na bampasi, mpo [toko] kutana na mingi.” Boye Nzambe apesi biso elaka ya bolendisi oyo ete, “Botiela yango molende, mpo, tala, nazali na bino, kino na suka ya mikolo na bino” (D&A 24:8).

Lisolo elandi ya Bibilia ezali ndakisa moko ya bompikiliki mpe bondimi.

“Mpe mwasi moko kotangaka makila mibu zomi na mibale… asimbaki nsuka ya elamba [ya Klisto]: mpe na mbala moko kotanga makila na ye [esilaki].

“Mpe Yesu alobaki, … Moto moko asimbi ngai: mpo nayoki ete nguya ebimi na ngai.

“Mpe ntango mwasi amonaki bongo abombamaki lisusu te, ayaki na kolenga, mpe akweyaki liboso na ye, mpe alobaki na ye liboso ya bato nionso mpo na ntina oyo esalaki ete asimba ye, mpe lolenge nini abikisamaki na mbala moko.

“Mpe alobaki na ye, Mwana mwasi, zala na bolendisi malamu: bondimi na yo ebikisi yo; kende na kimia” (Luka 8:43–48).

Lokola ye, tokoki kozua mapamboli mpe bolendisi, mpe kutu libiki, ntango totandi loboko epai ya Yesu Klisto—oyo bomikabi na ye ekoki kobikisa biso.

Matangi

  1. Dieter F. Uchtdorf, “Bokoba kati na Bompikiliki,” Liahona, sanza ya Mitano 2010, 57, 59.

Botala oyo.

Wuta na lisolo kati na Luka 8, lolenge nini ezalaki mibu ya bompikiliki ya mwasi oyo mpe lisusu lolenge nini bondimi na ye na Yesu Klisto efutaki ye nsima?