2013
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokeli
sánzá ya zómi 2013


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mokeli

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yo moko. Mpo na kozwa bansango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu Klisto “akelaki balola mpe mabele” (3 Nefi 9:15). Asalaki bongo na nzela ya nguya ya bonganganzambe, na nse ya bokambi ya Tata na biso na Lola (tala Mose 1:33).

“Botondi kani tosengeli kozala na yango ete Mokeli moko ya bwania abongisaki mabele mpe atiaki biso awa,” elobaki Mokambi Thomas S. Monson, “… ete tokoki koyeba ntango ya komekamaka, libaku moko mpo na komilakisa na ntina ya kokoka mpo na nyonso oyo Nzambe alengeli mpo ete biso tozwa.”1 Ntango tozali kosalela nguya na biso ya boponi mpo na kotosa mitindo ya Nzambe mpe koyambola, tokomi bato balongobani mpo na kozonga kofanda elongo na Ye.

Na ntina ya Bokeli, Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mosungi ya Mibale na Bokambi ya Yambo, alobaki ete:

“Tozali ntina Ye akelaki molongo! …

“Oyo ezali likambo ya mpasi ya kososola epai ya moto: kokokisanisa na Nzambe, moto azali mpamba; kasi tozali nyonso epai ya Nzambe.”2 Koyebaka ete Yesu akelaki mabele mpo na biso mpamba te tozali nyonso epai ya Tata na Lola ekoki kosalisa kobakisa bolingo na biso mpo na Bango.

Uta na Makomi

Yoane 1:3; Baebele 1:1–2; Moziya 3:8; Moses 1:30–33, 35–39; Abraham 3:24–25

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Tokelamaki na elilingi ya Nzambe (tala Mose 2:26–27), mpe tozali na makoki ya bonzambe. Profeta Joseph Smith ateyaki bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na “kobatela matomba [na bango].”3 Na bolendese wana lokola moboko, bandeko basi kati na Ekezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bateyami kobatela makoki na bango ya bonzambe na kokokisaka bantina ya Nzambe mpo na bango. “Lokola bayei kososola banani bazali solo mpenza—bana basi ya Nzambe, na makoki ya kobotama mpo na kolinga mpe koleisa—bakokisi makoki na bango lokola basi basantu.”4

“Botiami sikawa na ezalela moko wapi bokoki kosala engebene na bambuma ya bolingo oyo Nzambe aloni kati na bino,” elobaki Profeta Joseph Smith. “Soki bobateli mabongisi boni manene mpe ya nkembo maye!—soki bobateli matomba na bino, banzelu bakoki te komipekisa uta na kozala baninga na bino ya mosala.”5

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “The Race of Life,” Liahona, sanza ya mitano 2012, 91.

  2. Dieter F. Uchtdorf, “You Matter to Him,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2011, 20.

  3. Joseph Smith, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 171.

  4. Daughters in My Kingdom, 171.

  5. Tala Joseph Smith, na Daughters in My Kingdom,169.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boniboni boluki kososola ezalela na biso ya bonzambe ebutisaka bolingo na biso mpo na Mobikisi?

  2. Boniboni ekoki biso kolakisa botondi mpo na bikeli ya Nzambe?