2013
Kitola, Mikundola, mpe Pesa Melesi
sánzá ya mwambe 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya mwambe 2013

Kitola, Mikundola, mpe Pesa Melesi

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Nzambe asengi ete topesa Ye melesi mpo na mapamboli nyonso tozwaka uta na Ye. Ezali pete mpo na biso kokweya na momeseno ya nsambo ya botondi uta kaka na bibebu, na kozongelaka maloba se moko mbala na mbala kasi na kozangaka likanisi ya kopesa melesi lokola likabo ya motema epai ya Nzambe. Tosengeli “topesa melesi … na Molimo” (tala D&A 46:32) mpo ete tokoka koyoka botondi ya solo mpo na maye Nzambe apesi biso.

Lolenge nini ekoki biso komikundola ata eteni moko ya manso oyo Nzambe asali mpo na biso? Apostolo Yoane akomaki maye Mobikisi ateyaki biso na ntina ya likabo moko ya bomikundoli oyo eyaka na nzela ya likabo ya Molimo Mosantu ete: “Kasi Molendisi, ye Molimo Mosanto oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo yonso mpe akokanisela bino makambo yonso masili ngai koloba na bino” (Yoane 14:26).

Molimo Mosantu akozongisa makundoli ya maye Nzambe ateyaki biso. Mpe moko ya banzela Nzambe ateyaka biso ezali elongo na mapamboli na Ye; mpe bongo, soki toponi kosalela bondimi, Molimo Mosantu akomema misala ya bolamu ya Nzambe na bokundoli na biso.

Okoki komeka yango na losambo lelo. Okoki kolanda motindo moye elobi ete “Okopesa melesi na Nkolo na makambo nyonso” (talaD&A 59:7).

Mokambi Ezra Taft Benson (1899–1994) apesaki likanisi ete losambo epesaka ntango mpo na kosala yango. Alobaki: “Profeta Joseph alobaki na libaku moko ete moko ya masumu manene koleka mpo na liye Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakokweya ezali lisumu ya bozangi botondi. Nabanzi ete mingi kati na biso bazangi kokanisa yango lokola lisumu moko monene. Ezali na momeseno makasi mpo na biso na nsambo na biso mpe na mabondeli na biso na Nkolo ya kosenga kaka mapamboli likolo ya mapamboli. Kasi ntango mosusu nayokaka ete tosengeli kopesa mingi ya nsambo na biso mingi na kolakisaka botondi mpe na kopesaka melesi mpo na mapamboli tosilaki kozwa. Tokosepela bongo mingi mpenza.”1

Okokaki kokutana na likambo ya boye elongo na Molimo Mosantu lelo. Okoki kobanda losambo na yo moko na melesi. Okoki kobanda kotanga mapamboli na yo mpe nsima kopema mwa moke. Soki ozali kosalela bondimi, elongo na likabo ya Molimo Mosantu, okomona ete makundoli ya mapamboli makotiola na molimo na yo. Soki obandi kolakisa botondi mpo na moko na moko na yango, losambo na yo ekoki kozwa ntango molai mingi koleka momeseno. Bokundoli ekoya, botondi ekoya mpe lokola.

Okoki komeka eloko se moko wana ntango ozali kokoma likambo moko na zulunale na yo. Molimo Mosantu asalisi bato mingi na kosalaka yango uta ebandeli ya ntango. Mikundola ete buku ya Mose elobi, “Mpe buku moko ya bokundoli ebombami, kati na oyo wapi bakomaki, na lokota ya Adama, mpo na mingi lokola babelelaki epai ya Nzambe epesamaki kokoma na molimo mwa bofuli” (tala Moses 6:5).

Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) alimbolaki nzela wana ya nkoma efulama boye: “Baoyo babatelaka buku moko ya makundoli bazali na makoki mingi ya kobomba Nkolo na bokundoli ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Bazulunale ezali nzela moko ya kotangaka mapamboli na biso mpe ya kotikaka bososoli ya mapamboli yango mpo na bana na biso.”2

Ntango obandi kokoma, okoki komituna, “Ndenge nini Nzambe apambolaki ngai mpe baoyo nalingaka lelo?” Soki osali yango mbala na mbala na lolenge ekoki mpe na bondimi, okomimona komikundolaka mapamboli. Mpe ntango mosusu okomona makabo oyo ozangaki komona na moi komemama na molimo na yo kasi oyo nsima okoyeba ete ezalaki loboko ya Nzambe na bomoi na yo.

Nasambeli ete tokoka kokoba kosala makasi na bondimi mpo na kokitola, kokundola, mpe kopesa melesi mpo na maye Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso basali mpe bazali kosala mpo na kofungola nzela ya kozonga ndako epai na Bango.

Matangi

  1. Ezra Taft Benson, God, Family, Country: Our Three Great Loyalties (1974), 199.

  2. Spencer W. Kimball, “Listen to the Prophets,” Ensign, Sanza ya mitano 1978, 77.

Koteya uta na Etinda oyo

Na etinda na ye, Mokambi Eyring abengisi biso komikundola boboto ya Tata na biso na Lola na nsambo na biso. Solola na baye ozali koteya lolenge nini kosambela na botondi ekoki kosalisa biso kokitola loboko ya Nzambe na bomoi na biso. Kanisa kofukamaka mpo na kosambela elongo na baoyo bozali koteya mpe pesa likanisi na moto nyonso oyo akopesa losambo ete aloba bobele melesi.

Okoki lisusu koyekola ntina ya botondi na kotangaka milongo oyo na kobakisa na milongo oyo Mokambi Eyring akomaki: Nzembo 100; Moziya 2:19–22; Alma 26:8; 34:38; Doctrine et Alliances 59:21; 78:19; 136:28.