2013
Mayokani ya Tempelo
sánzá ya mínei 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya Minei 2013

Mayokani ya Tempelo

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yo moko. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

“Makuli ma lobiko maye mazwami na tempelo, maye mapesi biso nzela ya kozonga epai ya Tata wa biso na Likolo mokolo moko kati na mokangano ya libota ya seko mpe mpo na kokonzama na mapamboli mpe nguya uta na likolo mabongi na libonza nyonso mpe makasi manso,”1 elobaki Mokambi Thomas S. Monson Soki okei naino te na tempelo, okoki komilengela mpo na kozwa makuli ya bule ya tempelo na:

  • Kondimaka Tata na Lola, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu.

  • Kokolisaka litatoli ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe nsango malamu ezongisami.

  • Kosungaka mpe kolandaka profeta wa bomoi.

  • Komilongisa mpo na kozwa mokanda ya ndingisa na tempelo na kofutaka moko na zomi, kozalaka peto na makanisi, kozalaka sembo, kobatelaka Liloba ya Bwania, mpe kotambwisaka bomoi na yona boyokani na mateya ma Eklezia.

  • Kopesaka ntango, talanta, mpe bozwi na yo mpo na kosalisa kotonga bokonzi ya Nzambe.

  • Kosalaka elongo na mosala ya mambi ma kala ya libota.2

Mokonzi Monson lisusu ateyaki ete, “Ntango tomikundoli mayokani tosali na kati ya [ya tempelo], tokokoka mingi koleka komema mimekano nyonso mpe kolonga masenginia manso.”3

Uta na Makomi

Doctrine et Alliances 14:7; 25:13; 109:22

Uta na Mambi ma Kala na Biso

“Basantu mingi koleka motango ya 5.000 batondaki na Tempelo ya Nauvoo nsima ya bobulusi na yango. …

“Bokasi, nguya, mpe mapamboli ya mayokani ya tempelo [esungaki] Basantu ba Mikolo mya Nsuka na mobembo na bango na [westi], ntango [bazwaki mpasi] ya mpio, molunge, nzala, bobola, bokono, makama, mpe liwa.”4

Lokola bandeko basi mingi ya Lingomba ya Bamama Basungi, Sarah Rich azalaki mosali ya tempelo. Alobelaki makombo amonaki ete: “Soki ezalaki te mpo na bondimi mpe boyebi oyo epesamaki na biso na tempelo wana na … Molimo ya Nkolo, mobembo na biso elingaki kozala lokola kopumbwa na kati ya molili. … Kasi tozalaki na bondimi na Tata na biso na Lola, … komiyokaka ete tozalaki Bato baponami na Ye mpe na esika ya mawa, toyokaki lokola kosepela ete mokolo ya bokangoli na biso ekomaki.”5

Bobimi ezalaki “kopumbwa na molili” te mpo na Basi Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Basungamaki na mayokani na bango ya tempelo.

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “The Holy Temple—a Beacon to the World,” Liahona,sanza ya Mitano 2011, 92.

  2. Tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 105.

  3. Thomas S. Monson, Liahona, sanza ya Mitano 2011, 93.

  4. Daughters in My Kingdom, 29–30.

  5. Sarah Rich, in Daughters in My Kingdom, 30.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Ezali ngai kokubamela na tempelo mbala na mbala?

  2. Ezali ngai kolendisa bandeko basi mpo na kozwa mapamboli ya tempelo?