2012
Bamposa Eleki Malamu mpe Lisalisi Lipesami
2012


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya libwa 2012

Bamposa ya Ndenge Kasi Lisalisi Lipesami

Yekola liteya oyo na nzela ya losambo, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

“Bamposa ya basusu ezalaka ntango nyonso,” elobaki Mokambi Thomas S. Monson, “mpe moko na moko na biso akoki kosala eloko moko mpo na kosalisa moto moko. … Longola se soki tomibungisi na kosalisaka basusu, bomoi na bisomei ezali na ntina moke.”1

Lokola bamama batali mpe bateyi tokoki na bosembo bonso koya koyeba mpe kolinga ndeko mwasi moko na moko oyo tokendaka kotala. Lisalisi epai ya baye tokendaka kotala ekobima na pete uta na bolingo na biso mpo na bango (tala Yoane 13:34–35).

Lolenge nini ekoki biso koyeba bamposa ya molimo mpe ya ntango ya bandeko ba biso basi mpo ete tokoka kopesa lisalisi ntango esengami? Lokola bamama batali mpe bateyi, tosengeli kozwa bofuli ntango tosambelaka mpo na baye tokendaka kotala.

Kozalaka ntango nyonso na masolo to bokutani na bandeko ba biso basi ezali lisusu motuya. Kokendaka kotala yo moko, kobengaka na telefoni, kokomaka mwa mokanda ya bolendisi, e-mail, kofandaka elongo na ye, kokumisa na bosembo, kolakisaka ete osepeli na ye na eklezia, kosalisaka ye na ntango ya bokono to ya bokeleli, mpe makambo mosusu ya lisalisi nyonso izali kosalisa biso kobatelana mpe kosalisana.2

Bamama batali mpe bateyi basengami kopesa nsango ya bokolongonu ya nzoto, bamposa ya ndenge kani ya bandeko basi, mpe lisalisi lipesami epai na bango. Kopesaka nsango ya lolenge loye mpe lisalisi na biso epai ya bandeko na biso basi esalisaka biso kolakisa ete tozali bayekoli.3

Uta na Makomi

Yoane 10:14–16; 3 Nefi 17:7, 9; Moroni 6:3–4

Uta na Mambi na Biso ma Kala

Kosalisana ezali ntango nyonso na katikati ya mosala ya kotala mpe koteya na mabota. Na nzela ya lisalisi oyo tozali kopesa tozali komema boboto mpe bondeko oyo ezali motuya koleka bokeyi se kotala ya sanza moko moko. Ezali bobateli na biso nde etangamaka.

“Mposa na ngai ezali ya kobondela bandeko ba biso basi kotika komitungisa na ntina ya libiangi ya telefoni moko to bokeyi kotala ya nsima ya sanza minei nyonso to ya sanza moko moko,” elobaki Mary Ellen Smoot, mokambi monene ya 13 ya Lingomba ya Bamama Basungi. Asengaki biso “kofandisa nzokande makanisi na koleisaka milimo ya boboto.”4

Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) ateyaki, “Ezali motuya ete tosalisana kati na bokonzi.” Nzokande akitolaki ete lisalisi nyonso esengeli te kozala likambo ya bolombe. “Mbala mingi mpenza, misala na biso ya lisalisi misalemi na lisalisi ya bolendisi ya pete to bolimbisi … elongo na bamisala ya mpamba,” alobaki, “kasi matomba ya nkembo nini ikoki kobima … uta na misala ya mike mike oyo uta na motema malamu!”5

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Nini Esalaki Ngai mpo na Moto moko Lelo?” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 85.

  2. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 9.5.1.

  3. Tala Handbook 2, 9.5.4.

  4. Mary Ellen Smoot, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 117.

  5. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 82.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Ezali ngai koluka bofuli ya moto ye moko mpo na koyeba lolenge nini koyanola na bamposa ya molimo mpe ya ntango ya ndeko mwasi moko na moko napesami mokumba mpo na kokengela?

  2. Lolenge nini bandeko basi nakengelaka bayebaka ete nabatelaka bango mpe mabota na bango?