2012
Mpo na Nini Tosengeli Kozala na Baprofeta?
sánzá ya mísáto 2012


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Misato 2011

Mpo na Nini Tosengeli Kozala na Baprofeta?

Mpo Tata na Lola alingaka bana na Ye, Ye atikaki bango te kotambola na bomoi oyo ya kufa na kozangaka bokambi mpe boyangeli. Mateya ma Tata na biso na Lola mazali na lolenge ya mayoki ya mikolo minso, maye mayebani liboso, bilokoti oyo okoki kolokota na ebwakele ya nkasa na nsima ya magazini ya buku. Mazali bwania ya Mozali ya likolo oyo atonda na nguya nyonso, oyo ayebi nyonso mpe alingaka bana ba Ye. Na maloba na Ye, ezali na sekele ya bileko—fungola ya esengo na bomoi boye mpe na mokili mozali koya.

Tata na Lola abimisaka bwania boye epai ya bana ba Ye na mabele o nzela ya basali ba Ye, baprofeta (tala Amosa 3:7). Uta na mikolo mya Adama, Nzambe alobaki na bana ba Ye o nzela ya basakoli ba makambo ma molimo baponami baye bapesamaki mokumba ya kobimisa bolingi mpe toli na Ye epai ya basusu. Baprofeta bazali bateyi oyo bafulami mpe bazali banzeneneke baleki malamu ba Yesu Klisto (tala D&A 107:23). Baprofeta balobaka bobele na bato ya ntango na bango te, kasi balobaka lisusu na bato na bantango nyonso. Mingongo na bango miyokanaka bikeke na bikeke lokola litatoli ya bolingi ya Nzambe epai ya bana ba Ye.

Lelo bokeseni ezali te uta na bileko bisili koleka. Nkolo alingi bato ya mikolo na biso moke koleka na ntango ya kala te. Moko ya bitinda ya nkembo ya Bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto ezali ete Nzambe azali kokoba koloba na bana ba Ye. Ye azali ya kobatama na lola te kasi azali koloba lelo lokola Asalaki na mikolo ya kala.

Mingi ya maye Nkolo abimisaka na baprofeta ba Ye ezali na mokano ya kopekisa mawa mpo na biso lokola bato moko na moko mpe lokola mangomba. Ntango Nzambe alobaka, Asalaka bongo mpo na koteya, kofula, kopetola, mpe kokebisa bana ba Ye. Ntango bato moko na moko mpe mangomba bazali kobosana malakisi ma Tata na Lola, basalaka bongo na kozelaka makamba ya mimekano, minyoko, mpe mpasi.

Nzambe alingaka bana ba Ye banso. Tala ntina nini Ye abondelaka biso makasi o nzela ya baprofeta ba Ye. Kaka lokola tolingaka ya malamu koleka nyonso mpo na balingami na biso, Tata na Lola alingaka nini ezali malamu koleka nyonso mpo na biso. Tala ntina malakisi na Ye mazali motuya mpenza mpe ntango mosusu ya kozela te. Tala ntina Asundoli biso te lelo kasi azali kokoba kobimisa bolingi na Ye epai na biso o nzela ya baprofeta ba Ye. Maye makoyela biso mpe maye makoyela mokili etali boyoki mpe bokebi na biso na liloba libimisami ya Nzambe na bana ba Ye.

Malakisi ya ofele ma Nzambe epai ya bato banso mazwami na kati ya Biblia, Buku ya Mormon, Doctrine et Alliances, mpe Perle de Grand Prix. Mpo na kobakisa, Nkolo alobaka na biso na nzela ya basali ba Ye, lokola Akosala lisusu na likita linene oyo ezali koya.

Na banso baye baye bazali komituna soki likambo ya lolenge lona ekoki kozala—baye bakoki kotuna, “Ekoki kosalema ete Nzambe aloba na biso lelo?”—na motema na ngai mobimba nabiangi bino “boya mpe bomona” (Yoane 1:46). Tanga liloba ya Nzambe lokola lizwami na makomi. Yoka likita linene na litoyi oyo elingi koyoka mongongo mwa Nzambe mopesami o nzela ya baprofeta ba Ye ya mikolo mya nsuka. Yaka, yoka, mpe mona na motema mwa yo! Mpamba te soki osengi “na motema mwa bosembo, na mokano mwa solo, kozalaka na bondimi na Klisto, [Nzambe] akomonisa bosolo na yango epai na bino, na nguya ya Molimo Mosantu” (Moloni 10:4). Na mpe o nzela ya nguya oyo, nayebi ete Yesu Klisto azali na bomoi mpe akambaka Eklezia na Ye o nzela ya profeta na bomoi, kutu Mokambi Thomas S. Monson.

Bandeko babali mpe basi, Nzambe azali solo koloba na biso lelo. Mpe Azali na mposa ete bana ba Ye banso bayoka mpe batia likebi na mongongo na Ye. Ekosala biso bongo, Nkolo akopambola mpe akosunga biso makasi, na bomoi oyo mpe na mikili mikoya.