2011
Mabaku ya Kosala Bolamu
sánzá ya mítáno 2011


Mabaku ya Kosala Bolamu

Lolenge ya Nkolo ya kosalisa baye bazwami na mposa ya ntango esengeli bato baye na kozangaka kotala bolingo bamipesi bango moko mpe nini bazali na yango na Nzambe mpe na mosala mwa Ye.

Balingami ba ngai bandeko babali mpe basi, ntina ya etinda na ngai ezali ya kokumisa mpe kosepela eyenga ya oyo Nkolo asali mpe azali kosala mpo na kosalisa babola mpe bakeleli o neti ya bana ba Ye na mabele. Alingaka bana ba Ye oyo bazali kokelela mpe lisusu baye balingaka kosalisa. Mpe Akelaki banzela ya kopambola banso baye bazali na mposa ya lisalisi mpe baye balingi kopesa yango.

Tata wa biso ya Likolo ayokaka nsambo ya bana ba Ye epai nyonso na mabele kobondelaka bato mpo na kozwa biloko ya kolia, mpo na bilamba ya kozipa nzoto na bango, mpe mpo na bolongobani boye esengeli koya uta na kozwaka makoki ya kobikela bango moko. Bampasi eye wana esili kokomela Ye banda Atiaki babali mpe basi na mabele.

Okoyekola na ntina ya bamposa yango wapi ozali kofanda mpe uta na bipai nyonso na mokili. Motema na yo mokolamusana mbala na mbala na mayoki ya mawa. Ntango okokutana na moto oyo azali kobunda mpo na kozwa mosala, okoyoka mposa wana ya kosalisa. Okoyoka yango ntango okokende na ndako ya mokufeli mobali mpe omoni ete azali na biloko ya kolia te. Okoyoka yango ntango okotala bafoto ya bana kolelaka ya kofanda na bibukani bitikali ya bandako na bango oyo ebebisamaki na boningani bwa mabele to na moto.

Mpo Nkolo ayokaka bileli na bango mpe ayokaka mawa na yo mpo na bango, Asili uta na ebandeli ya ntango kopesa nzela mpo ete bayekoli ba Ye basalisa. Abiangaki bana ba Ye kobulisa ntango na bango, makoki ma bango, mpe bango moko mpo na kosangana na Ye na kosalisaka basusu.

Nzela na Ye ya kosalisa ebiangamaki kala kosalela mobeko mwa bobulisi. Na eleko mosusu nzela na Ye ebiangamaki molongo mwa bomoko. Na ntango na biso ebiangami pologalami bolamu ya Eklezia.

Nkombo mpe biteni ya lolenge ya kosala ebongwami mpo ete ekokana na bamposa mpe bizalela ya bato. Kasi ntango nyonso Lolenge ya Nkolo ya kosalisa baye bazwami na mposa ya ntango esengeli bato baye na kozangaka kotala bolingo bamipesi bango moko mpe nini bazali na yango na Nzambe mpe na mosala mwa Ye.

Abiangi biso mpe atindi biso kosangana na mosala mwa Ye mpo na kotombola baye bazali kokelela. Tosali liyokani ya kosala yango na mai ma libatisi mpe na batempelo esantu ya Nzambe. Tozongisaka liyokani yango sika na mikolo mya Eyenga ntango toliaka elambo.

Ntina na ngai lelo oyo ezali nde kolimbola boko mabaku Apesaki biso mpo na kosalisa basusu oyo bazali kokelela. Nakoki te koloba na ntina ya bango banso na mwsa ntango mokuse oyo tozali esika moko. Elikya na ngai ezali ya kozongisa sika mpe kolendisa mokano mwa yo ya kosala.

Ezali na loyembo moko na ntina ya libiangi ya Nkolo mpo na mosala moye oyo nayembaki banda ntango nazalaki mwana moke. Na bomwana na ngai nazalaki kotiya bokebi mingi na esengo ya mondule koleka nguya ya maloba. Nasambeli ete bokoyoka maloba ya nzembo yango na mitema na bino lelo oyo. Tika toyoka maloba yango lisusu:

Nasalaki bolamu moko na mokili lelo oyo?

Nasungaki moto moko oyo azali kokelela?

Nasepelisaki moto ya mawa mpe nasalaki ete moto ayoka nsai?

Soki te, nakpei solo mpenza.

Bozito ya moto moko ekomaki pete mpo na komema lelo

Mpo nalingaki kokabola kilo?

Bakoni mpe bato balembi bazwaki lisalisi na nzela na bango?

Ntango bazalaki na mposa ya lisalisi na ngai ezalaki ngai wana?

Boye lamuka mpe sala eloko moko ya koleka

Bongo lota ndoto ya efandeli na yo na likolo.

Kosala bolamu ezali elengi, esengo ya koleka ndelo

Lipamboli ya mosala mpe bolingo.1

Mbala na mbala Nkolo atindaka mabiangi ma bolamuki epai na biso banso. Mbala mosusu ekoki kozala liyoki ya mawa ya mbalakata mpo na moto oyo azali kokelela. Tata akoki koyoka yango ntango amonaki mwana moke kokweya mpe kolongola libongolo mposo. Mama akoki koyoka yango ntango ayokaki bileli ya bobangi ya mwana na ye na butu. Mwana mobali to mwana mwasi akoki koyoka mawa mpo na moto oyo azalaki komonana mawa to kobanga- banga na eteyelo.

Banso kati na biso tosimbamaki na mayoki ya mawa mpo na basusu baye toyebi kutu te. Ndakisa, wana ezali yo koyoka mbando ya mbonge komataka mpe kobomaka bato mingi na Pasifiki nsima na boningani bwa mabele na Japon, otungisamaki mpo na baye bakokaki kozoka.

Mayoki ya mawa mayaki epai na nkoto na nkoto na bino oyo bazwaki nsango ya mpela na Queensland, Australia. Bansango tozwaki na bazulunale etalaki mingi motango mwa baye bazalaki kokelela. Kasi mingi kati na bino bayokaki mpasi ya bato. Libiangi lya bolamuki eyanolamaki na bandimi ba Eklezia 1.500 to mingi koleka oyo bamipesaki bango moko mpamba na Australia baye bayaki kosalisa mpe kobondisa.

Babalusaki mayoki na bango ya mawa na mokano ya kosala likolo ya mayokani na bango. Nasili komona mapamboli maye mayaka na moto oyo azali kokelela mpe azwi lisalisi mpe mayaka na moto oyo azwi libaku ya kopesa lisalisi yango.

Baboti ba bwania bamonaka na bokeleli to mposa nyonso ya bato mosusu yoko nzela ya komema lipamboli na bomoi ya bana na bango ya babali mpe basi. Kala mingi te bana misato bazalaki komema basani oyo ezalaki na elambo ya kitoko liboso ya ndako na biso. Baboti na bango bayebaki ete tosengeli lisalisi, mpe bakotisaki bana na bango na libaku wana ya kosalisa biso.

Baboti bapambolaki libota na biso na lisalisi na bango ya motema mwa bokabi. Na boponi na bango ya kotika bana na bango kozala na lisalisi ya kopesa, batindaki mapamboli na bankoko na bango ba mikolo mikoya nsima. Bimwemwa ya bana mike wana ezalaki bango kokende lonngwa na ndako na biso epesaki ngai bolikii ete eye wana ekosalema. Bakoyebisa bana na bango esengo bayokaki na kopesaka na boboto lisalisi mpo na Nkolo. Namikundoli ete mayoki ma bosepeli ya kimia uta na bana lokola ntango nalongolaki matiti mpo na moto ya penepene na biso na libiangi lya tata wa ngai. Ntango nyonso nabiangamaki kozala mopesi, namikundoli mpe nandimi maloba ma loyembo “Elengi ezali mosala, Nzambe wa ngai, Mokonzi wa Ngai.”2

Nayebi ete maloba ma nzembo makomamaki mpo na kolimbola esengo oyo eyaka uta na kokumbamela Nkolo na Saba. Kasi bana wana ya mike na biloko ya kolia liboso ya ekuke na biso bazalaki koyoka na mokolo moko ya mosala esengo ya kosala mosala mwa Nkolo. Mpe baboti na bango bamonaki libaku ya kosala bolamu mpe kopanza esengo yango likolo ya nkola na nkola.

Nzela ya Nkolo ya kosalisa bakeleli ezali kopesa libaku mosusu mpo na baboti ya kopambola bana na bango. Namonaki yango kati na ndako ya losambo mokolo ya Eyenga moko. Mwana moke moko apesaki na episikopo likabo ya libota na ye kati na envelope wana ezalaki ye kokota na ndako ya losambo liboso ya likita ya elambo.

Nayebaki libota yango mpe mwana ya mobali. Libota bawutaki se kozwa nsango ya moto moko oyo azalaki kokelela na palwasi. Tata ya mwana mobali alobaki eloko moko lokola eye epai ya mwana wana etiaki ye likabo ya kokila ya motema ya bokabi ya mingi koleka liboso kati na envelope ete: “Tokilaki lelo mpe tosambelaki mpo na bakeleli. Nasengi pesa envelope oyo na episikopo na biso. Nayebi ete akopesa yango mpo na kosalisa baye bazali na bonsenga mingi koleka ya biso.”

Na esika ya kobendana misopo na nzala na mokolo wana ya Eyenga, mwana mobali wana akokundola mokolo yango na bongengi malamu. Nakokaki koyebisa uta na bimwemwa na ye mpe lolenge asimbaki envelope makasi ete ayoaki boni tata atielaka ye motema mpenza mpo na komema likabo ya libota mpo na babola. Akokundola mokolo wana ntango azali diakona mpe ekoki kozala libela.

Namonaki esengo se moko wana na bilongi ya bato baye basalisaki mpo na Nkolo na Idaho mibu mileki. Duka monene ya Tetom Dam ekweyaki na Mokolo ya mposo, mwa 5, Sanza ya motoba 1976. Bato zomi na moko babomamaki. Nkoto na nkoto basengelaki kotika bandako na bango na mwa bangonga moke. Boko bandako ekombolamaki. Mpe nkama na nkama ya bifandelo bikokaki kobongisama mpo ete bato bafanda bobele o nzela ya mosala makasi mpe makoki maye makokaki soki moke te kozwama na bankolo ndako.

Baye bayokaki nsango ya likama bayokaki mawa, mpe boko bayokaki libiangi ya kosala bolamu. Bato ya penepene, baepisikopo, bakambi ba Lingomba ya Bamama Basungi, bakambi ba lisanga likoki, bateyi ya libota, mpe bamama batei batali batikaki bandako mpe misala mpo na kokende kokombola ndako ya basusu iye itondisamaki na mai.

Balongani mibale bazongaki na Rexburg uta na bopemi kaka nsima ya mpela yango. Bakendeki kotala ndako na bango moko te. Na esika, bakutaki episikopo na bango mpe batunaki wapi bakokaki kosalisa. Atindaki bango epai ya libota moko oyo ezali kokelela.

Nsima ya mwa mikolo bakendeki kotala ndako na bango moko. Ekendeki, kokombolama nyonso na mpela. Bazongaki kaka nsima epai ya episikopo mpe batunaki, “Sikawa olingi tosala nini?”

Epai soki wapi efandi yo, osili komona likamwisi wana ya mawa kobaluka na mosala ya bato mosusu. Ekokaki kozala na bolali matanga ya likamba monene. Namonaki yango na lisanga likoki ya bonganganzambe wapi ndeko mobali moko atelemi mpo na kolimbola bamposa ya mobali moko to ya mwasi moko oyo azali koluka libaku ya kosala mosala mpo na komisunga mpe kosunga libota na ye. Nakokaki koyoka mawa kati na ndako, kasi boko bapesaki nkombo ya bato oyo bakokaki kozwa moto oyo azalaki na mposa ya mosala.

Nini esalemaki na lisanga likoki lina ya bonganganzambe mpe nini esalemaki na bandako wana etondisamaki na mai na Idaho ezali mamonisi ya nzela ya Nkolo mpo na kosalisa baye bazali kokelela makasi mpo bakoma bato ya bomikoki. Tozali koyoka mawa, mpe toyebi boniboni ya kosala na lolenge ya Nkolo mpo na kosalisa.

Tozali kosepela eyenga ya mbala ya 75 ya bokundoli ya pologami ya bolamu ya Eklezia mobu moye. Ebandamaki mpo na koyanola mposa ya baye babungisaki mosala, bibokolelo, kutu bandako na matanga ya nini eyebanaki lokola Mpasi Monene.

Bamposa monene ya ntango ya bana ba Tata ya Likolo eyaki lisusu o ntango na biso lokola eyaki mpe ekoya na bantango nyonso. Mabongisi matiami na ebandeli ya pologalami ya bolamu ya Eklezia mazali bobele mpo na ntango moko to esika moko te. Mazali mpo na ntango inso mpe bisika binso.

Mabongisi yango mazali ma molimo mpe seko. Mpo na ntina ena, kososolaka mango mpe kotiaka mango na mitemala na biso ekokoka kosalisa biso tomona mpe tokamata mabaku ya kosalisa ntango nyonso mpe esika nyonso kani Nkolo abiangi biso.

Awa ezali boko mabongisi maye makambaki ngai ntango nalingaki kosalisa na lolenge ya Nkolo mpe ntango basalisaki ngai na bato mosusu.

Yambo, bato banso bazalaka na esengo koleka mpe bayokaka komimemia mingi koleka ntango bakoki kopesa mpo ya bango moko mpe mabota na bango mpe nsima kokende kosalisa basusu. Natondi na matondo mpo na baye basalisaki ngai kokokisa bamposa na ngai. Nazongisi kutu matondi koleka mibu miye minso mpo na baye basalisaki ngai kokoma moto ya bomikoki. Mpe nsima nazongisi matondi koleka mpo na baye balakisaki ngai lolenge boni kosalela boko ya eye etikali likolo na biloko bya ngai mpo na kosalisa basusu.

Nayekolaki ete nzela ya kozwa eye etikalaka likolo ezali kosalela mosolo moke koleka oyo nazwaka. Na eye etikali wana nakokaki koyekola ete ezali mpenza malamu mingi koleka kopesa na esika ya kozwa. Eye wana ezali ndambo moke mpo ntango topesaka lisalisi na lolenge ya Nkolo, Ye apambolaka biso.

Mokambi Marion G. Romney alobaki na ntina ya mosala ya pologalami ya bolamu ete, “Okoki te komipesa mobola na mosala oyo.” Mpe nsima atangaki mokambi na ye ya misio, Melvin J. Ballard, na lolenge loye ete: “Moto akoki te kopesa ekokoto ya lipa epai ya Nkolo na kozangaka kozwa lipa mobimbalokola mbano.”3

Nasili komona likambo yango ezali solo na bomoi bwa ngai. Ntango nazali kokaba na bana ba Tata ya Likolo oyo bazali kokelela, Ye azali na motema ya kokaba na ngai.

Libongisi ya mibale ya nsango malamu oyo ezali mokambi epai na ngai na mosala ya bolamu ezali nguya mpe lipamboli ya bomoko. Ntango tosangisaka maboko mpo na kosalisa bato oyo bazali kokelela, Nkolo asangisaka mitema na biso. Mokambi J. Reuben Clark Jr. Alimbolaki yango lolenge loye: “Kopesa ya lolenge wana … ememaki … liyoki ya bondeko ya banso lokola bato ya mayele mpe misala minso oyo basalaki moko na mopanzi ya mosusu na elanga ya Bolamu to na mwango ya mosala mosusu.”4

Liyoki wana libakisami ya bondeko ezali solo mpo na oyo akozwa mpe mopesi. Kino lelo oyo, moto moko elongo na nani natombolaki mpau ya poto-poto mopanzi na mopanzi na ndako na ye etondisamaki na mai ya mpela na Rexburg ayokaka lokola tokoma bandeko na ngai. Mpe azali koyoka bolongobani monene koleka mpo asalaki nyonso akokaki mpo na ye moko mpe mpo na libota na ye. Soki tosalaki moto na moto ye moko, banso mibale tolingaki kobungisa lipamboli moko ya molimo.

Eye wana ekambi na libongisi ya misato ya mosala na mosala ya bolamu mpo na ngai: Benda libota na yo na mosala elongo na yo ete bayekola kosalisa moko mpe mosusu lokola basalisaka basusu. Bana na yo ya mibali mpe ya basi baye bazali kosala elongo na yo mpo na kosalisa basusu oyo bazali kokelela bakolinga mingi kosalisana ntango bazali kokelela.

Libongisi ya minei ya motuya ya pologalami ya bolamu ya Eklezia nayekolaki yango lokola episikopo. Eyaki na kolandaka motindo ya makomi ya kolukaka babola. Ezali mokumba ya episikopo mpo na koluka mpe kopesa lisalisi na baye bazali kaka se koluka lisalisi nsima ya nyonso bakoki kosala bango mpe mabota na bango. Namonaki ete Nkolo atindaka Molimo Mosantu kosala ete ekoka kosalema “boluka, mpe bokozwa”5 na kosalisaka babola lokola Asalaka na kolukaka bosolo. Kasi nayekolaki lisusu kozwa mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na boluki-luki yango. Ye akoki kozwa bobimisi liboso ete ozwa.

Boko kati na bino bakozala na mposa bazwa bofuli wana na basanza izali koya liboso. Mpo na kokundola mbala ya 75 ya mbotama ya pologalami ya bolamu ya Eklezia, bandimi epai nyonso na mokili bakobiangama kozala na mokolo moko ya mosala. Bakambi mpe bandimi bakoluka bobimisi wana ekosala bango mwango soki nini ekozala.

Nakopesa makanisi misato wana ezali bino kobongisa mwango ya mosala na bino.

Yambo, milengela yo moko mpe baye okamaba na molimo. Bobele soki mitema milembisami na Bomikabi bwa Nkolo nde ekoki yo komona polele ntina ya mwango yango lokola kopambolaka ezala na molimo to na ntango bomoi ya bana ba Tata na Likolo.

Likanisi na ngai ya mibale ezali ya kopona lokola bazwi ya mosala yango bato baye bazali kati na bokonzi to kati na lisanga ya bato baye kani mposa na bango ekosimba mitema mya baye bakopesa lisalisi yango. Bato oyo bazali kosalisa bakoyoka bolingo na bango. Eye wana ekoki kosala mingi mpo bayoka esengo, lokola nzembo elakaki, koleka bobele se kokokisa mposa na bango ya ntango.

Likanisi na ngai ya nsuka ezali ya kobongisa mwango ya kosalela nguya ya mikangano ya mabota, ya masanga makoki, ya masanga malandi, mpe ya bato oyebi kati na masanga ma bato na bino. Mayoki ya bomoko ekobakisa mbano ya bolamu ya lisalisi ozali kopesa. Mpe mayoki mana ya bomoko kati na mabota, kati na Ekklezia, mpe kati na masanga ekokola mpe ekokoma libula ya kosangaola oyo ewumelaka ntango molai nsima ntango mwango esuki.

Oyo ezali libaku ya koyebisa bino boni mingi nalingaka bino. Na lisalisi ya bolingo bopesaki mpo na Nkolo, nazali mozwi ya melesi ya bato oyo bosalisaki wana ekutanaki ngai na bango epai na mokili.

Bokozwa nzela ya kotombola bango likolo ntango bosalisi bango na lolenge ya Nkolo. Bino mpe bayekoli na bomikitisi ba Mobikisi lokola bino bobwaki lipa na bino likolo ya mai na lisalisi, mpe bato bosalisaki bamekaki kopesa ngai lipa ya botondi lokola mbano.

Nazwaki maloba se moko ya botondi uta na bato oyo basalaki elongo na bino. Namikundoli mbala moko natelemaki na mopanzi ya Mokambi Ezra Taft Benson. Tozalaki koloba na ntina ya lisalisi mpo na bolamu na Eklezia ya Nkolo. Akamwisaki ngai na bokasi na ye ya bolenge ntango alobaki, kosembolaka loboko ete, “nalingaka mosala oyo, mpe ezali mosala!”

Mpo na Moteyi nazongisi matondi mpo na mosala mwa bino ya kosalisa bana ba Tata na Likolo. Ye ayebi bino, mpe Azali komona bokasi, etingya, mpe kobonzama na bino. Nasambeli ete Akopesa bino lipamboli ya komona mbuma ya misala na bino na esengo ya baye bino bosalisaki mpe elongo na banani bosalisaki mpo na Nkolo.

Nayebi ete Nzambe Tata azali na bomoi mpe ayokaka nsambo na biso. Nayebi ete Yesu azali Klisto. Bino mpe baye bosaleli bokoki kopetolama mpe kolendisama na kosalelaka Ye mpe na kobombaka mitindo mya Ye. Bokoki koyeba lokola nayebi, na nguya ya Molimo Mosantu, ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe mpo na kozongisa Eklezia ya solo mpe ya bomoi, eye oyo ezali. Natatoli ete Mokambi Thomas S. Monson azali profeta ya bomoi ya Nzambe. Azali ndakisa monene ya nini Nkolo asalaki: kokendeke epai na epai kosalaka bolamu. Nasambeli ete tozwa mabaku ma biso mpo na “kotombola maboko [maye] masili makasi, mpe kolendisa mabolongo maye mazali kotengatenga.”6 Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Nasalaki Bolamu Moko?” Banzembo, no. 264.

  2. “Elengi Ezali Mosala,” Nzembo, no. 147.

  3. Marion G. Romney, “Welfare Services: The Savior’s Program,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1980, 93.

  4. J. Reuben Clark Jr., na Conference Report, Sanza ya zomi 1943, 13.

  5. Tala Matai 7:7–8; Luka 11:9–10; 3 Nefi 14:7–8.

  6. Doctrine et Alliances 81:5.