2010–2019
Libaku na Yo ya Monene
Likita Linene ya Sanza ya Zomi 2019


Libaku na Yo ya Monene

Mobikisi abengisaka biso, mokolo na mokolo, mpo na kotia mpembeni bilengi mpe kimia mpe kosangana na Ye na mobembo ya boyekoli.

Lisese ya Badongolomiso

Lisolo ya lisese moko oyo bana balingaka ekomama mibu mingi eleki na lisakola “Na libulu moko na mabele ezalaki dongolomiso moko.”1

Lisese ya Bilbo Baggins elobeli dongolomiso moko lokola mpe ya lolenge ya moto oyo balakisi na libaku ya kitoko koleka—makila malamu na komekaka libaku, mobombano, mpe elaka ya mbano moko monene.

Kpokoso ezali ete badongolomiso mingimingi balingaka ata moke te komeka mabaku. Bomoi na bango mobimba elingi elengi. Balingaka kolia mbala motoba na mokolo ntango bazwaka yango mpe balekisaka mikolo na bango na bilanga na bango, kosololaka na bampaya, koyembaka, kobetaka miziki, mpe kosepelaka bisengo ya bomoi na pete.

Nzokande, ntango balakisi Bilbo na likanisi ya komeka libaku moko monene, eloko moko eninganaki na mozindo ya motema na ye. Asosolaki uta na ebandeli ete mobembo ekozala na mikakatano. Kutu ya likama Ekoki kosalema ete akoka kozonga te.

Mpe kasi, libiangi ya libaku ekotaki na mozindo ya motema na ye. Mpe bongo, dongolamiso oyo lokola songolo atikaki elengi nsima mpe akendaki na nzela ya koluka komeka libaku moko monene oyo ekomema ye kino “kuna mpe kozongisa ye lisusu.”2

Libaku na Yo

Ntango mosusu moko ya ntina oyo lisese oyo ebetaka mingi na biso mpenza ezala mpamba te ezali mpe lisese na biso.

Eleki kala, kala, kutu liboso tobotama, na mobu moko oyo elimwa na ntango mpe londende mpo na komikundola, babengaki biso lokola mpo na kokende koluka komeka libaku. Likanisi epesamaki na Nzambe, Tata na biso ya Lola. kondima libaku oyo elingaki koloba kotika elengi mpe kimia ya liboso na Ye mpenza. Elingaki koloba koya na mabele mpo na mobembo etonda na makama mpe mimekano eyebana te.

Toyebaki ekozala pete te.

Kasi toyebaki lisusu ete tolingaki kozwa bomengo ya motuya mpenza, lokola nzoto ya mosuni mpe koyeba kozwa esengo mpe mawa ya ya makasi ya bomoi ya bokufi. Tolingaki koyekola kosala makasi, koluka, mpe kobumnda. Tolingaki koyeba bosolo etali Nzambe mpe biso moko.

Ya solo, toyebaki ete tokosala mbeba na nzela. Kasi tozalaki mpe na elaka ete na ntina ya libonza monene ya Yesu Klisto, tokokaki kopetolama na bobuki mibeko na biso, kosembisama na molimo na biso, mpe, mokolo moko, kosekwa mpe kosangana lisusu na baye tolingaka.

Toyekolaki boni Nzambe alingaka biso mingi koleka. Ye apesaki biso bomoi mpe Ye alingi biso tolonga. Yango wana, Ye alengelaki Mobikisi moko mpo na biso. “Nzokande,” Tata na Lola alobaki, “bosengeli kopona mpo na binomei, mpo yango epesameli bino.”3

Esengeli kozala na biteni ya libaku ya bokufi oyo etungisaki biso mpe kutu ebangisaki bana ya Nzambe, mpo motango monene ya bandeko mibali na biso bakanaki mabe na yango.4

Na likabo mpe nguya ya boponi, toponaki ete lmakoki ya oyo tokokaki koyekola mpe kokoma na boseko elongobanaki na likama.5

Mpe boye, kolikiaka na bilaka mpe nguya ya Nzambe mpe ya Mwana na Ye ya bolingo, tondimaki momekano yango.

Nandimaki.

Mpe yo ondimaki.

Tondimaki kotika kimia oyo ezalaki na biso ya liboso mpe tokotaki na libaku na biso moko ya monene ya “kokende kuna mpe kozonga lisusu.”

Libiangi mpo na Libaku

Kasi nzokande, bomoi ya kufa ezali na lolenge moko ya kobungisa biso makanisi, bongo te? Tozalaki na momesani ya kobosanabomoni ya oyo biloko monene oyo toyaki koluka, kolingaka malamu elengi mpe pete koleka na esika ya kokola mpe kokende liboso.

Kasi, eloko moko ya koboya te etikali naino, mozindo na kati ya motema na biso, nzala wana ya ntina moko ya likolo mpe lokumu. Nzala oyo ezali ntina nini bato babelemaka na nsango malamu mpe eklezia ya Yesu Klisto. Nsango malamu ezongisami ezali, lokola, kobandela libiangi mpo na komeka libaku tondimaki ntango eleka kala mpenza. Mobikisi abengisaka biso, mokolo na mokolo, mpo na kotia mpembeni bilengi mpe kimia mpe kosangana na Ye na mobembo ya boyekoli.

Ezali na mabulu mingi na nzela oyo. Ezali na bangomba, balubwaki, mpe bazunguluke. Ekoki kozala kutu na elilingi ya mimpulututu, mitambo, mpe kutu dongolamiso moko to mibale. Kasi soki otikali na nzela mpe elikia na Nzambe, nsukansuka okokuta nzela ya nsuka na yo ya nkembo mpe ya kozonga na ndako na yo ya lola.

Boye okobanda ndenge nini?

Ezali pete mpenza.

“Sopa motema na yo epai ya Nzambe.

Yambo, osengeli kosopa motema na yo na Nzambe. Sala makasi mokolo na mokolo mpo na kokutana na Ye. Yekola kolinga Ye. Mpe nsima tika bolingo efula yo mpo na koyekola, kososola, mpe kolanda mateya na Ye mpe koyekola mitindo ya Nzambe. Nsango malamu ya Yesu Klisto epesameli biso na lolenge moko ya polele mpe pete mpo ete mwana akoka kososola yango Kasi, nsango malamu ya Yesu Klisto ezali na biyano mpe mituna ya kilikili koleka na bomoi mpe ezali na bozindo ya mozindo mpe kilikili mpenza ete kutu ata na boyekoli mpe bomanioli ya bomoi mobimba, tokoki kobanda kososola ata kutu eteni moke.

Soki opatipati na libaku oyo mpamba te otii ntembe na bokoki no yo, mikundola ete boyekoli etali te kosala makambo na bobongo mpenza; etali kosala makambo na makanisi. Ezali maponi na yo oyo elakisi nani ozali mpenza, mingi mpenza koleka makoki na yo.6

Ata ntango okweyi, okoki kopona kotika te, kasi tala bokasi na ye, koba liboso, mpe lamuka. Yango ezali momekani ya mobembo.

Nzambe ayebi ete ozali ya kobonga mpenza te, ete okobunga mbala na mbala. Nzambe akolinga moke te ntango ozali kobunda koleka ntango olongi.

Lokola moboti moko ya bolingo, Ye alingi kaka okoba komeka na motema moko. Boyekoli ezali lokola koyekola kobeta piano. Ntango mosusu nionso okoki kosala liboso ezali moke kobeta nzembo “Chopsticks.” Kasi soki okobi kobeta, banzembo ya pete okoki mokolo moko kopesa mongongo ya sonata, rapsodie, mpe concerto.

Sikoyo, mokolo wana ekoki koya na bomoi oyo te, kasi ekoya. Nionso Nzambe asengi ezali ete na makanisi okoba kobunda

Tosalisa basusu na bolingo

Ezali na likambo moko ya litomba, ya mwa bokeseni, etala nzala oyo oponi: nzela moko kaka mpo na kokola na libaku na yo ya nsango malamu ezali kosunga mosusu bakola lokola.

Mpo na kosunga basusu ezali nzela ya boyekoli. Bondimi, elikya, bolingo, motema mwa, mpe lisalisi esebisaka bayekolli.

Na nzela ya bokasi na yo na kosunga babola mpe bazanga, koyamba basusu na motungisi, ezaleli na yo moko epetolami mpe ebongisami, molimo na yo ekomisami monene, okokola mingi koleka.

Kasi bolingo oyo ekoki te kokoma na kozelaka lifuta. Ekoki te kozala lisalisi oyo ezelaka kondimama, kolulama, to kobondela

Bayekoli ya solo ya Yesu Klisto balingaka Nzambe mpe bana na Ye na kozelaka te eloko moko ya kozongisa. Tolingaka baye bapesaka biso nkele, oyo balingaka biso te. Kutu baye basekaka biso, batungisaka biso, mpe balukaka kosala biso mpasi.

Ntango botondisi mitema na bino na bolingo ya solo ya Klisto, bokotika esika mpo na nungunungu, bosambisi, mpe nsoni te. Bokobatela mitindo ya Nzambe mpamba te bolingaka Ye. Nzela wana, bokokoma malembe malembe lokola-Klisto koleka na makanisi mpe misala na bino.7 Mpe libaku kani ekoki kozala monene koleka oyo?

Bokabola Lisolo na Bino

Likambo ya misato tokobunda kolonga na mobembo na biso ezali kokamata likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto mpe koyoka nsoni te ya kozala moko ya Eklezia ya Yesu Klisto.

Tobombaka bondimi na biso te.

Tokokunda yango te.

Kutu, tokolobela mobembo na biso na ndenge moko ya momesano mpe ya bosembo. Wana ezali nini baninga basalaka—balobelaka makambo oyo ezali na motuya mpo na bango. Makamo oyo ezali penepene na motema na bango mpe esalaka bokeseni na bango.

Wana ezali nini bosalaka. Bokosolola masolo mpe makambo na bino lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Ntango mosusu masolona bino ekosekisa bato. ntango mosusu emema bango na mpinzoli. Ntango mosusu ekosunga bato bakoba na bompikiliki, molende, mpiko kotelema ngonga mosusu, mokolo mosusu mwa moke penepene na Nzambe koleka.

Bokabola Boyebi na Bino moko, na media social, na maboke, esika nionso.

Moko ya makambo ya nsuka Yesu alobelaki bayekoli na Ye ezalaki ete basengelaki kokende na mokili mobimba mpe kokabola lisolo ya Klisto mosekwi.8 Lelo lisusu tosepelaka na esengo Etinda Monene.

Nsango kani ya nkembo tozali na yango ya kokabola: na ntina ya Yesu Klisto, mobali, mwasi, mpe mwana nionso, akoki kozonga na ndako na likama te mpe, kuna, kowumela na nkembo mpe bosembo!

Ezali kutu na nsango malamu mingi oyo elongobani kokabola.

Nzambe abimelaki lisusu moto na mikolo na biso. Tozali na profeta ya bomoi.

Ekoki ngai kokundolisa bino oyo Nzambe alingi te bino “boteka” nsango malamu ezongisami mpe Eklezia ya Yesu Klisto.

Azali kozela kaka yo obomba te na nse ya biloko.

Mpe soki bato bakani Eklezia ezali te mpo na bango, wana ezali mokano na bango.

Elingi koloba te okweyi. Koba kosalela bango na boboto. Elingi mpe koloba te opekisami kobengisa bango lisusu.

Bokeseni katikati ya kokutana na bato ya mpamba mpe boyekoli ya mpiko na mawa ezali—libengisi!

Tolingaka mpe tomemiaka bana ya Nzambe banso, kotalaka te molongo na bango na bomoi, kotalaka te mposo to eyamba na bango, kotalaka te mikano na bango na bomoi.

Na ngambo na biso, tokoloba, “Boya mpe bomona! Boyeba binomei boniboni kotambola na nzela ya boyekoli ekopesa bino mbano mpe lokumu.”

Tobengisaka bato “Boya mpe bosunga ntango bozali kokomisa mokili esika ya malamu koleka.”

Mpe tolobi, “Boya mpe botikala! Tozali bandeko na bino ya mibali mpe bandeko na bino ya basi. Tozali ya kobonga mpenza te. Totielaka Nzambe motema mpe tolukaka kobatela mitindo na Ye.

“Bosangana elongo na biso, mpe bokokomisa biso malamu koleka. Mpe, na nzela yango, bokokoma malamu koleka mpe lokola. Tokamata libaku oyo elongo.

Ntango nini Nasengeli Kobanda.

Ntango moninga na biso Bilbo Baggins ayokaki libiangi ya komeka libaku kosala na kati na ye, akanaki kozwa bopemi moko ya malamu na butu, kolia bilei moko ya ntongo ya esengo, mpe kobanda likambo ya liboso na ntongo.

Ntango Bilbo alamukaki, amonaki ndako na ye ezalaki mobulu, mpe azali penepene ya isa makanisi ya mwango na ye ya lokumu.

Kasi nsima moninga na ye Gandalf ayaki mpe atunaki, “Ntango nini ezali okoya?”9 Mpo na kokutana lisusu na moninga na ye, Bilbo asengelaki kokana mpo na yemei nini kosala.

Mpe boye, dongolomiso wana mpenza ya momesano amimonaki kobimaka na ekuke ya liboso mpo na koluka libaku mbangu mpenza ete abosanaki ekoti, lindenda ya kotambolela mpe musuale na ye, Atikaki kutu bolei na ye ya ntongo ya kosilisa te.

Ntango mosusu ezali na liteya moko awa mpo na biso.

Soki ngai mpe yo toyoki mposa makasi ya kosangana na libaku monene ya kowumela mpe kokabola oyo Tata ya Lola alengelaki mpo na biso kala mingi koleka, nayebisi bino ya solo, lelo ezali mokolo ya kolanda Mwana ya Nzambe Mobikisi na biso na nzela na Ye ya lisalisi mpe boyekoli.

Tokoki kolekisa bomoi mobimba kozelaka ngonga wana ntango makambo nionso ekolandana na bobongi mpenza. Sikoyo ezali ntango ya komipesa na koluka Nzambe, kosalisa basusu, mpe kokabola mayele na biso elongo na basusu.

Botika nsima ekoti na bino, lingenda ya kotambolela, musuale, mpe ndako kati na mobulu.10

Na baye na biso bazalaki kala kotambala na nzela wana, tozwa mpiko, motema mawa, kozali na elikya, mpe kokoba!

Na baye batiki nzela, palado bozonga, bozangana lisusu elongo na biso, bokomisa biso makasi koleka.

Mpe, na baye babandi naino te, ntina nini kozela? Soki bolingi koyeba bikamwa ya mobembo oyo monene ya molimo, botia lokola na libaku na bino ya monene! Bosolola na bamisionele. Bosolola na baninga na bino Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bosolola na bango mpo na oyo etali mosala ya kitoko mpe ya kokamwa.11

Ezali ngonga ya kobanda!

Yaka, Sangana elongo na Biso!

Soki oyoki ete bomoi na yo ekoki kozala na ntina mingi, ntina moko ya monene mingi, mikangano ya libota ya makasi mingi koleka, mpe bokangani na Nzambe; palado, yaka sangana elongo na Biso.

Soki bozali koluka lingomba moko ya bato oyo bazali kosala mpo kokoma bililingi ya malamu oleka ya ndenge na bango moko, bosunga baye bazanga, mpe bosala esika eleki malamu, boya kosangana na Biso!

Boya mpe bomona mobembo, ya kitoko, ya kokamwa, mpe ya libaku oyo ezali yango mpenza.

Na nzela bokoyebana bino moko.

Bokoyeba ntina.

Bokoyeba Nzambe.

Bokoyeba mobembo ya libaku mpe ya nkembo mingi koleka ya bomoi na bino.

Yango natatoli na nkombo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, mpenza Yesu Kisto, amene.

Matangi

  1. J. R. R. Tolkien, The Hobbit to There and Back Again (Boston: Houghton Mifflin, 2001), 3.

  2. Subtitle of The Hobbit.

  3. Moses 3:17.

  4. Tala lisusu Yobo 38:4–7 (nzembo ya Nzambe eyembami mpo na esengo); Yisaya 14:12–13 (“netola ngwende na ngai likolo ya minzoto ya Nzambe”); Emoniseli 12:7–11 (etumba ezalaki na lole).

  5. “Profeta Joseph Smith alimbolaki boponi lokola ‘lipanda ya bonsomi ya molimo oyo lola apesaki na ofele mpenza likolo ya mabota ya bato lokola moko ya makabo ya kitoko mingi koleka’ [Teachings of the Prophet Joseph Smith, comp. Joseph Fielding Smith (1977), 49]. ‘lipanda oyo ya bonsomi ya molimo,’ to boponi, ezali nguya oyo epesi nzela na bato kozala ‘baponi mpo na bangomei’ (D&C 58:28). Eyokani malamu na bolingi ya kopona katikati ya malamu mpe mabe to kokesanisaka bandelo ya malamu mpe mabe mpe lisusu koyeba mpenza mbano ya boponi wana. Tata ya Lola alingaka bana na Ye mingi mpenza ete Ye alingi biso tokoma na likoki na biso mobimba—kokoma lokola Ye azali. Mpo na kokola, moto asengeli kozala na makoki ya kobota,a mpo na kosala boponi na ye alingi. Boponi ezali ya ntina mpenza na mwango na Ye mpo na bana na Ye ete ‘ata Nzambe akokaki te kokomisa moto lokola yemei na kozanga kotika bango nsomi’ [David O. McKay, “Whither Shall We Go? Or Life’s Supreme Decision,” Deseret News, June 8, 1935, 1]” (Byron R. Merrill, “Agency and Freedom in the Divine Plan,” in Roy A. Prete, ed., Window of Faith: Latter-day Saint Perspectives on World History [2005], 162).

  6. Na kati ya nsango na ye Harry Potter mpe bisuku ebombama, mokomi J. K. Rowling has Hogwarts headmaster Dumbledore say something quite similar to young Harry Potter. Ezali na liteya moko kitoko awa mpo na biso. Nasalelaki yango na nsango oyo yambo mpe nakanisaki ezali mabe na bobandeli.

  7. “Balingami, sikoyo tozali bana ya Nzambe, mpe yango emonani mpenza naino te oyo tokozala: kasi toyebi ete, ntango akobima, tokozala lokola ye; mpo tokomona ye lokola azali” (1 John 3:2; sete biso nde tobeti).

    Atako mbongwana wana ya boye ekoki kozala koleka bokoki na biso ya kososola, “molimo ye moko atatoli na molimo na biso, ete tozali bana ya Nzambe:

    “Mpe soki tozali bana, nde tozali basangoli; basangoli ya Nzambe, mpe basangoli basangani elongo na Klisto; zali ete toyoki mpasi elongo na ye. ete tokoka kokembelama elongo lokola.

    “Mpo nayebi ete bampasi ya ntango oyo ekoki.te komekisama na nkembo oyo ekobimisama na biso” (Baloma 8:16–18; kobeta nsete ebakisami).

  8. Tala, Matai 28:16–20.

  9. Tolkien, The Hobbit, 33.

  10. Tala Luka 9:59–62.

  11. Tala LeGrand Richards, A Marvelous Work and a Wonder, rev. ed. (1966).