2010–2019
Bilaka Minene Koleka mpe ya Motuya
Sanza ya zomi 2017


Bilaka Minene Koleka mpe ya Motuya

Mwango monene ya bosepeli ya Tata na Biso ya Lola ekotisi malongi, makuli, bilaka minene koleka mpe ya motuya na nzela na yango tokoki kokoma bakaboli ya lolenge ya kibonzambe.

Moko ya bitumba minene moko moko na biso akutanaka na yango mokolo nyonso ezali kopesa nzela te na makambo ya mokili elekela ntango mpe makasi na biso ete totia pembeni biloko ya libela oyo ezali na ntina mingi koleka.1 Tokoki na pete mpenza kosepela uta na bukondoli mpe na kotia makanisi likolo ya bantina ya motuya ya milimo mpo na mikumba na biso ebele mpe ba horaire ne biso ya kotonda. Bantango mosusu tomekaka kokokia makambo mingi ete tokoki kobosana ntina na bio ezali mpenza nini mpe tozali komekaka kokokisa yango.

Apostolo Petelo akundolaki biso oyo mpo na bayekoli ya Yesu Klisto, “Nguya na Ye ya bonzambe esili kopesa biso biloko nyonso bikoki na bomoi mpe bonzambe, mpo na boyebi na ye oyo abiangi biso na nkembo mpe bolamu:

Na nzela na yango epesameli bisobilaka minene koleka mpe ya motuya: na ntina ete na bilaka yangobozwa likabo na bino kati na lolenge ya bonzambe, mpe bokima libebi oyo ezali kati na mokili mpo na mposa mabe.”2

Mateya na ngai ebeti sete na motuya ya bilaka minene koleka mpe ya motuya elobelaki Petelo ekundolisi ya solo ya wapi tozali kokende na mobembo na biso ya bokufi mpe mpo na nini. Nakolobela lisusu mosala ya bomoni ya mokolo ya Saba, ya tempelo ya bule, mpe bandako na biso na kosungaka biso komikondola bilaka oyo ya motuya ya molimo.

Nabondeli na bosolo ete Molimo Mosantu ateya moko na moko na biso lokola tozali koyoka elongo babosolo oyo ya ntina mingi.

Lolenge na Biso ya Bonzambe

Mwango monene ya bosepeli ya Tata na Biso ya Lola ekotisi malongi, makuli, bilaka minene koleka mpe ya motuya na nzela na yango tokoki kokoma bakaboli ya lolenge ya kibonzambe. Mwango na ye elakisi lolenge na biso ya libela mpe nzela tosengeli kolanda mpo na koyekola, kobongola, kokola, mpe, na nsuka, kofanda elongo na Ye libela na libela.

Lokola elimbolami na “The Family: A Proclamation to the World”:

“Moto nyonso—mobali mpe mwasi—bakelami na elili ya Nzambe. Moko na moko na molimo ya bolingo mwana mobali to mwana mwasi ya baboti na biso ya lola, mpe, lokola, moko na moko azali na lolenge mpe ya bonzambe. …

“Na mokili ya yambo ya bokufi, molimo ya bana ya mibali mpe ya basi bayebaki mpe basanzolaki Nzambe lokola Tata na bango ya Libela mpe bandimaki mwango na Ye na yango bana na Ye bakoki kozwa nzoto ya mosuni mpe kolonga mayele ya mabele na kokoba liboso ya bobongi nie mpe mpe na nsuka kokokisa lobi na bango ya bonzambe lokola bomoi na bango ya libela.”3

Nzambe alaki na bana na Ye ete soki bango balandi mibeko ya mwango na Ye mpe ndakisa ya Mwana na Ye ya bolingo, tobondi mitindo, mpe toyiki mpiko na bondimi tii na nsuka, boye na nzela ya bolamu ya Bosikoli ya Mobikisi, bango.”4 Bomoi ya seko ezali Bilaka Minene Koleka mpe ya Motuya ya suka.

Kobotama ya Mibale na Molimo

Tokososola mingi mpenza bilaka minene koleka mpe ya motuya mpe kobanda bokaboli ya lolenge ya bonzambe na koyanolaka na bondimi nyonso na libiangi uta na Nkolo na nkembo mpe bolamu. Lokola elimbolaki Petelo, libiangi yango etondisami na kobundaka mpo na kokima kanyaka oyo ezali na mokili.

Soki tokei liboso ya komikitisa nyonso elongo na bondimi ya Mobikisi, boye mpo na Bomikabi na Ye mpe na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu, “mbongwana ya nguya [ezwi esika] na kati na biso, to na mitema na biso, ete tozali lisusu na meko ya kosala mabe te, kasi mpo na kosala bolamu natngo nyonso.”5 Biso tobotami lisusu, iyo, tobotami na Nzambe.”6 “Boye soko moto azali na Klisto, akomi bozalisi ya sika: makambo y aliboso elimue; tala makambo nyonso ekomi ya sika.”7

Lolenge ya mbongwana mobimba na bomoto na biso mingimingi esangaka na lompango to na mbala moko te. Lokola mobikisi alobaki, biso toyambi lisusu “kaka te botondisami yambo, kasi [toyambi] ngolu likolo ya ngolu.”8 “Mpo tala, boye elobaki Nzambe: Nakopesa epai na bana na bato mokolo likolo ya mokoloto, mosise likolo ya mosise, awa moke mpe kuna moke; mpe bapambolami bango baye bakoyekemela epai ya mitindo na ngai, mpe bakotia litoyi na toli na ngai, mpo bango bakoyekola bwania.”9

Makuli ya bonganganzambe mpe mayokani ya bule ezali na ntina mingi na bopusani ya bokobi ya kobotama ya sika na molimo; yango ezali lisusu ndimbola Nzambe atie na nzela na yango tokoyamba bilaka minene koleka mpe ya motuya. Makuli oyo eyambami na kolongobana mpenza mpe ekundolami ntango nyonso efungoli bantina ya bonzambe na nzela na yango nguya ya bonzambe ekokita na bomoi na biso. Mayokani oyo epesami lokumu na bokasi nyonso mpe ekundolami nango nyonso ekopesa ntina mpe bokengi ya mapamboli nyonso mibale ya bokufi mpe ya boseko.

Ndakisa, Nzambe alaki biso kolandisamaka na botongono na biso, moninga ya ntango nyonso ya bandimi misato ya Bonzambe, oyo azali Molimo Mosantu t,10 ete na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto tokoki koyamba mpe ntango nyonso kozwa bolimbisi ya masumu ,11 ete tokoki kozwa kimia na mokili oyo,12 ete ete Mobikisi abukaki bansinga ya kufa mpe alongaki likolo ya nkunda,13 mpe ete mabota ekoki kozala elongo mpo na ngonga oyo mpe mpo na boseko nyonso.

Na bososoli mpenza, nyonso ya bilaka minene koleka mpe ya motuya Tata na Lola apesi na bana na Ye ekoki kotangama to kososolisama na mobimba te. Atako, kiteni ya molongo ya mapambolaki elakami oyo nalikasi ekoki koluka moko na moko na biso ko “stand all amazed,”14 mpe “tokumbami mpe tosanzoli Tata” 15 na nkombo ya Yesu Klisto.

Bokundoli ya Bilaka

Mokambi Lorenzo Snow akebisaki ete, “Tozali mpenza na likoki ya kobosana ntina monene ya bokufi, oyo ezali ntina oyo Tata na biso ya Lola atindaki biso awa kozwa nzoto ya kibomoto, lisusu koyamba mbela na bule elongo na yango tobiangemaki; mpe engebene, na esika ya kotia makanisi na biso na biloko ya bokufi … , topesi biso moko lisusu mingingi nakotia makanisi na biloko ya mokili kozangaka kozwa lisungi ya bonzamne oyo Nzambe apesaki oyo ezali eloko moko kaka oyo ekoki kopesa biso ndingisa ya kotelemela [biloko ya mokili].” 16

Mokolo na Saba mpe tempelo ya bule ezali maziba miale eyebani ya lisungi ya bonzambe epesamaki na Nzambe mpo na kosunga biso koboya biloko mpe kanyaka ya mokili. Tosengeli yambo kokanisa ete bantina monene ya kobombaka bule mokolo ya Saba mpe kokotaka na tempelo ekokani kasi ekeseni. Nandimi ete, atako bantina mibale ezali mpenza ndenge moko mpe ezali kosala elongo kokembisa bison a molimo mpe na bato bangomoko mpe na bandako na biso.

Saba

Nsima Nzambe kokela bioko nyonso, Ye apemaki na mokolo ya sambo mpe apesaki motindo ete moko na mposo ezala ntango ya bopemi mpo na kosunga bato bakundola Ye.17 Saba ezali ntango ya Nzambe, moko ntango ya bule etiami mpenza pembeni mpo na kosanzola Ye mpe mpo na koyamba mpe kokundola bikala na Ye ya monene koleka mpe ya motuya.

Nkolo alakisaki na eleko oyo:

“Mpo na kobomba yo mobimba na bosoto ya mokili, okokende na mokolo na ngai ya bule na ndako ya mabondeli mpe okosala makuli kuna;

“Mpo ete na bosolo, mokolo yango nde epesameli yo mpo na kopema na misala na yo mpe mpo ete opesa masanzoli na Oyo Aleki Likolo.”18

Banso, na mokolo ya Saba tosanzolaka Tata na nkombo ya Mwana Mobali nakosanganaka na makuli mpe koyekolaka na ntina ya, boyambi, bokundoli, bozongisi sika mayokani. Na mokolo na Ye ya bule, makanisi, misala, mpe ezaleli na biso ezali elembo topesi na Nzambe mpe elembo ya bolingo na biso mpo na Ye.”18

Ntina moko ya bobakisi na Saba ezali kotombola makanisi utana biloko ya mokili kino na mapamboli ya boseko. Komilongolo biso moko na mokolo ya bule oy uta ebele ya misala na biso ya mokolo na mokolo na bomoi etondi, “biso tokoki “kotala Nzambe mpe kobika”19 na koyambaka mpe kokundolaka bilaka minene koleka mpe ya motuya nanzela na yango tokomi bakaboli ya bozali ya bonzambe.

Tempelo ya Bule

Nkolo ntango nyonso apesaki bato na ye motindo ya kotonda batempelo, bisika ya bule na esika yango Basantu balongobani basalaka bamilulu ya bule ya nsango malamu mpe makuli mpo na bango moko mpe mpo na bakufi. Batempelo ezali bisika moko ya buleka koleka bisika nyonso ya kosanzola. Tempelo na koloba ezali ndako na Nkolo, moko esika ya bule ya kafukafu etiami pembeni mpo kosanzolaka Nzambe mpe mpo na koyambaka kokundolaka bilaka na ye minene mpe ya motuya.

Nkolo azalaki kotambwisa na eleko oyo, “Boyokana, bobongisa nyonso esengeli mpe botonga ndako moko oyo ekozala ndako na mabondeli, ndako ya kokila, ndako ya bondili, ndako ya boyekoli, ndako ya nkembo, ndako ya bosembo, ndako ya Nzambe.”21 bomoni monene ya kosanzola na tempelo ezali kosanganaka na makuli mpe koyekolaka na ntina ya, koyambaka, mpe kokundolaka, mayokani. Tokanisaka, tosalaka, mpe tolataka ya kokesana mpenza na tempelo nab sika oyo tokendaka.

Ntina monene ya tempelo ezali kotombola makanisi utana biloko ya mokili kino na mapamboli ya boseko. Komilongola mpo na mwa ngonga mokuse na makambo ya mokili oyo tomeseni na yango, biso tokoki “kotala Nzambe mpe kobika”22 na koyambaka mpe kokundolaka bilaka minene mpe ya motuya na nzela na yango tokomi bakaboli ya bozali ya bonzambe.

Nasengi boyeba ete mokolo ya Saba mpe tempelo, ezali moko ntango ya bule mpe moko esika ya bule etiami mpenza pembeni mpo na kosanzola Nzambe mpe mpo na koyamba mpe kokundola bilaka na Ye ya monene koleka mpe ya motuy na bana na Ye. Lokola etiamaki na Nzambe, mama ya bantina ya maziba mibale ya bonzambe ya kosunga ezali mpenza ndenge moko: kozwa nguya makasi mpe mbala na mbala kotia bokebi na Tata na biso ya Lola, Mwana na Ye ya Mobali se Moko, Molimo Mosantu, mpe bilaka akangani na makuli mpe mayokani ya nsango malamu ezongisami ya Mobikisi.

Mabota na Biso

Ya motuya koleka, libota esengeli ezala bosangani monene ya ngonga mpe esika na kati na yango batu bango moko mpe mabota bakundoli na makasi mpenza bilaka minene mpe motuya ya Nzambe. Kologwaka na bandako na biso mpe kolekisaka ntango na mayangani ya Eyenga mpe kokota na esika ya bule ya tempelo ezali na ntina. Kasi ekoki te. Kaka soki tomemi molimo mpe makasi ezwami na misala wana ya bule ezongi na biso na bandako na biso ekoki biso kokobisa makanisi na bison a ntina monene ya bomoi ya bokufi mpe kokima kanyaka oyo ezali na mokili. Mayele na biso ya saba mpe ya tempelo esengeli elakisa molimo oyo etondi na bato bangomo mpe mabota mpe bandako na bison a bokobi ya komikundola mateya toyekolaki na bosali ya Molimo Mosantu, na lisolo ya bokobi mpe ya bozindo ya Nkolo Yesu Klisto, mpe elongo na “bongengi malamu ya elikia” 23 na bilaka ya seko ya Nzambe.

Saba mpe tempelo ekoki kosunga kotia na bandako na biso “lolenge moko malamu koleka”24 soki biso “tosangani elongo lokola moko biloko nyonso ya Klisto, yango na likolo mpe yango nan se, kutu kati na ye.”25 Oyo tosali na bandako na biso elongo na ya Ye ntango ya bule mpe oyo toyekoli na kati na ya Ye esika ya bule ezali na ntina mpo na kokoma mokaboli ya bozali ya bonzambe.

Elaka mpe Litatoli

Tokoki na pete kolongwa na ezalela ya mokolo na mokolo mpe biloko ya mokili ya bokufi. Kolala, kolia, kolata, kosala mosala, kosakana, kosala ngalalsisi, mpe ebele misala na biso mosusu ya momesano. Kasi na nsuka oyo tokokoma ezali mbano ya boyebi na biso ya mpe bolingi ya koyekola uta na Tata, Mwana Mobali, mpe Molimo Mosantu, yango ezali mpenza te motuya ya kosangisa ya misala na biso ya mokolo na mokolo likolo ya kokima ya ntango ya bomoi.

Ntango malamu ezali mingi koleka ezalela ya molongo ya kotala ya kokesana ya mosala ya kosala; nzokande, yango ezali tapi kitoko ya bosolo “esalama malamu”26 mpe etongami esika moko, etindami mpo na kosunga biso kokoma lokola Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto, kutu bakaboli ya bozali ya bonzambe. Na bosolo, tozali bakufi miso na kotalaka ya ntina te27 soki bosolo oyo ya molimo ezali ya kokita mpo na bokebi, botali, mpe makambo ya mokili

Ntango tozali na bwania mpe tobiangi Molimo Mosantu kozala motambwisi na biso,28 nalaki ete akoyekolisa biso nini esali solo. “Ye akotatola Klisto, [mpe] akongengisa makanisi na biso na bomoni ya lola”29 ntango tobundi mpo na kofulisa lobi na biso ya libela mpe kokoma bakaboli ya bozali ya bonzambe.

Napesi litatoli na ngai ete bilaka minene mpe ya motuya esangani na makuli mpe mayokani ezali ya solo Nkolo alobaki bongo:

“Ngai napesi bino banzela na lolenge nini bino bokoki kosala liboso na ngai, mpo na nsuka nyonso ezala mpo na lobiko na bino.

Ngai, Nkolo nakangani ntango bino bozali kosala oyo ngai nalobi; kasi ntango bosali te oyo ngai nalobi, bozali na bilaka te.”30

Natatoli ete Tata na biso ya Lola azali mpe azali mokeli ya mwango ya lobiko. Yesu Klisto azali Mwana na Ye Semoko ya Mobali, Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Ye azali na bomoi. Mpe natatoli ete mwango mpe bilaka ya Tata, Bomikabi ya Mobikisi mpe kiboninga ya Molimo Mosantu ekokokisa kimia na mokili mpe na bomoi ya seko na mokili ezali koya.31 Na makambo oyo natatoli na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amen.