2010–2019
Lobi Nkolo Akosala Misala ya Kokamwa na kati na Bino
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Lobi Nkolo Akosala Misala ya Kokamwa na kati na Bino

Bokoba kolingaka, bokoba komekaka. Bokoba na kolikiaka. Bokoba na kokolaka. Lola engengisi bino lelo, lobi, mpe libela na libela.

Bandeko mibali mpe basi, bozali na likanisi moko—bozali na liteya moko to nungunungu moko—na lolenge kani tolingaka bino? Batango 10 bozali kotala, kotiaka misu moto moko na liboso awa ntango nionso, kasi na bantango 10 oyo, tofandi awa liboso na kotalaka, misu na biso epai na bino mpe bokotaka kati kati ya molimo na biso, atako yango ezali 21.000 awa na Ndako ya Likita to bankoto ya bandimi na bandako ya mayangani mpe baeklezia, to nsuka bankoto na nkoto na mabota kotalaka na mokili mobimba, ntango mosusu basangani na mabota na nzinga nzinga ya etando ya ordinatele. Awa bozali, bozali kuna, ntango sima ya ntango, na Eyenga na bino malamu, ezala ya bino malamu. Boyembi mpe bosambeli. Boyoki mpe bondimeli. Bozali bikamwa ya Eklezia oyo. Mpe tolingaka bino.

Likita linene mosusu nini kitoko tozalaki na yango. Topambolami na bozali mpe bitinda ya masakoli ya Mokambi Thomas S. Monson. Mokambi, tolingaka yo, tosambelaka mpo na yo, totondi yo botondi, mpe likolo ya nionso, tosungaka yo. Totondi koteyema na bino mpe batoli na bino malamu mpe mingi mpenza ya bayangeli ya mibali mpe basi misusu minene. Toyoki miziki kitoko. Tosambeli mpe tobondelaki elongo ntango nionso. Solo molimo ya Nkolo ezalaki awa bebo mpenza. Oyo ezali eyenga efulama na ndenge nionso.

Sikoyo, namoni mpenza makambo mibale. Moko ezali likambo ete nazali moto se moko oyo atelemi katikati na bino mpe keleme ya malili oyo ntango nionso bolengelaka na kosukisa likita linene. Likambo mosusu ya ntina oyo ezwami kati ya foto oyo namonaki kala te na Interneti.

Elilingi
Dinozor kolandaka bana

Nasengi bolimbisi na bana banso oyo bazali kobombana na nse ya bakiti, kasi bosolo ezali ete moko na biso alingi lobi, to mokolo sima ya oyo, ebebisa mayoki ya kitoko tozwi na eyenga oyo. Tolingi kosimba ngwi mayoki ya molimo tozwi mpe malongi efulama toyoki. Kasi moko te akoboya ete nsima ya bangonga efulama na bomoi na biso, tosengeli kozonga na banzinganzinga ya mokili wapi ntango mosusu tokokutana lisusu na makambo oyo ezali solo malamu te.

Mokomi ya Baebele akebisaki biso na ntina na yango ntango akomaki, “Bokanisa lisusu mikolo ya liboso ete wana esili bino kongelama na moi, boyikaki mpiko kati na bolozi monene.”1 Bolozi ya kongenge wana ya yambo ekoki koya na banzela mingi, mpe ekoki koyela biso banso. Solo misionele nionso oyo asali naino nokinoki asosolaka ete bomoi na elanga ya misio esengelaki kozala te lokola mpema kitoko ya MTC. Oyo esalamaka epai na biso banso nsima na liyangani ya esengo to nsima ya liyangani ya moko efulama.

Bomikundola ete ntango Mose akitaki na nse nsima ya experience kitoko lokola ya Ngomba ya Sinaї, amonaki ete bato na ye basilaki “komibebisa” mpe basilaki “kopengwa noki.”2 Kuna bazalaki na nse ya ngomba, kosalaka ngombe ya wolo mpo na konkumbamela, na ngonga mpenza oyo Yehova, na songe ya ngomba, azalaki koyebisa Mose ete, “Okozala na banzambe mosusu liboso na ngai te.,” mpe “Okosala ekeko mpo na yo te, soki elilingi na eloko na lola na likolo te.”3 Mose azalaki na esengo te na etuluku ya Bayisalaele ya kowayawa mokolo wana!

Na eleko ya mosala na Ye na mabele, Yesu amemaki Petelo, Yakobo, mpe Yoane na Ngomba ya Mbongwana, wapi, makomi elobi, “elongi na ye engengi lokola moi, mpe bilamba na ye ezalaki lokola pole.”4 Lola efungwamaki, basakoli ya kala bayaki, mpe Nzambe Tata alobaki.

Nsima ya experience ya selestiale ya boye, nini Yesu amonaki ntango akitaki na nse kouta na Ngomba? Solo, yambo Amonaki koswana katikati ya bayekoli na Ye mpe bokabwani likolo ya lipamboli oyo esalaki epayi ya elenge mobali kasi ebotaki mbano oyo ekanamaki te. Bongo amekaki kondimisa Bazomi na Mibale—oyo Akosala te—ete Akotekisama nokinoki na bakambi ya mboka oyo bakoboma Ye. Nsima moto moko alobaki ete mpako efutamaki na  Ye ekokaki,  mpe Afutaki yango na mbala moko. Nsima Asengelaki kopamela bandeko mibali mosusu mpo ete bazalaki koswana na ntina ya nani akozala monene na bokonzi na Ye. Nionso oyo ekambaki Ye na esika moko mpo na koloba, “E libota na kozanga kondima, … nayikila bino mpiko kino ntango ni?”5 Azalaki na ntina ya kotuna motuna wana mbala na mbala  na eleko ya mosala na Ye. Ezali ya kokamwa te ete Azalaki na mposa ya kozala na bansonge ya ngomba mpo na kosambela se yemoko!

Kososolaka ete biso banso tosengeli kokita na nse uta na baexperience ya nsonge mpo na koyokana na bokita komata ya bomoi, nakolinga napesa bolendisi oyo lokola likita linene ezali kosuka.

Yambo na nionso, na mikolo ekoya okomona kaka balimiti te baye bazali nzinganzinga na yo te kasi lisusu mona biloko kati na bomoi na yo oyo ezali naino na boyokani na bitinda oyoki na eyenga oyo, nasengi kolemba na molimo te mpe kotika te. Nsango malamu, Eklezia, mpe babosangani kitoko ya katikati ya mobu esalami mpo na kopesa elikia mpe bofuli. Ekoki kolembisa bino te. Bobele satana, monguna na biso banso, akomeka kondimisa biso ete mabongi oyo elobelami na likita linene ekoki mpe kosalama te, ete bato babongaka mpenza te, ete moko te akolaka mpenza. Mpe mpo na nini Lisifelo apesaka lisikulu wana? Mpo ayebi ete ye akoki kobonga te, mpo ete ye akoki te kokola, ete mpo na seko mobimba ye akozala na lobi ya malamu te. Azali moto moko mizele akangami na balimiti ya seko, mpe alingi yo ozala na mizele mpe. Malamu kokweya mpo na yango te. Mpo na likabo ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe bokasi ya lola ya kosalisa biso, tokoki kobonga, mpe likambo monene na ntina ya nsango malamu ezali topambolami mpo na komeka, ata soki tolongaka ntango nionso te.

Ntango boyokani ezalaki te na Eklezia ya ebandeli likolo ya nani asengelamaki na mapamboli ya lola mpe nani asengelamaki te, Nkolo asakolaki na Profeta Joseph Smith, “Solo, nalobi epai na bino, [makabo ya Nzambe] mapesami mpo na litomba ya baoyo balingaka ngai mpe babatelaka … mitindo na ngai, mpe [mpo na bango] oyo bazali koluka kosala bongo.”6 Elenge mobali, ezali biso banso na matondi mpo na biloko ya kolia wana te “mpe … koluka kosala bongo”! Wana ezali likambo ya kolendisa mpo ntango mosusu wana ezali nionso tokoki kopesa! Tozwaka lisalisi na makambo oyo soki Nzambe asengelaki kopesa bondimi ya bobongi nie, Akokaki kozala na mokanda moko ya libonza.

Nasengi bokanisa lobi, mpe mikolo nionso nsima na yango, ete Nkolo apambolaka baoyo balingaka kobonga, oyo bandimaka mposa ya mitindo mpe bamekaka kobatela yango, oyo bapesaka motuya na malamu ya Boklisto mpe bazali kobunda na makoki ya bokasi na bango mpo na kozwa yango. Soki obeti libaku na nzela wana, lokola moto nionso abetaka; Mobikisi azali wana mpo na kosalisa yo, koba kotambola. Soki okweyi, senga bokasi na Ye. Senga lokola Alma, “O Yesu… yokela ngai mawa” 7 Akosunga yo ozongela. Akosunga yo oyambola, bongisa, mpe tia na esika nini nionso osengeli kotia na esika, mpe koba kotambola. Na nsuka okozwa elonga oyo ozali koluka.

“Lokola ozali na mposa uta na ngai bongo ekosalama epai na yo,” Nkolo asakoli.

…“Tia elikia na yo kati na Molimo oyo akambaka kino na kosala malamu—iyo, kosala na boyengebene, kotambola na komikitisa, kosambisa na bosembo. …

[Nsima] Nionso ozali na yango mposa epai na ngai [kati] bosembo, … okozwa .”8

Nalingaka malongi wana! Elobaka lisusu mpe lisusu ete tokopambolama mpo na mposa na biso ya kosala malamu, kutu lokola tozali kobunda kosala bongo. Ezali kokundolisa biso ete mpo na kolongobana mpo na mapamboli wana, tosengeli kosala ete topimeli yango na basusu te: tosengeli kosala na boyengebene, mokolo moko te na bozangi bondimami; tosengeli kotambola na komikitisa, ata mokolo moko te tosalela bozangi boyengebene; tosengeli kotambola na bosembo, atako mokolo moko te kozala na lolendo, ata mokolo moko te kozala na lofundo, tosengeli kosambisa na bosembo, mokolo moko te komimona na bosembo mingi koleka basusu, mokolo moko te tomimona bayengebene koleka.

Bandeko basi mpe mibali, motindo monene ya yambo ya boseko nionso ezali kolinga Nzambe na motema nabiso mobimba, na bokasi, na mayele mpe na bokasi, yango ezali motindo ya yambo. Kasi bosolo monene ya yambo ya boseko ezali ete Nzambe alingi biso na motema mobimba na Ye mobimba, bokasi, mayele, mpe makoki. Bolingo wana ezali libanga ya moboko ya boseko, mpe esengeli kozala libanga ya moboko ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Solo ezali bobele na bolendisi wana kozikaka na molimo na biso nde tokoki kozwa elikia kondima, kokoba komeka kobongisa, kokoba koluka bolimbisi ya masumu na biso, mpe kokoba kosembola ngolu wana na baninga na biso ya pembeni.

Mokambi George Q. Cannon kala ateyaki ete: “Atako lokengo ya mikakatano nini, mozindo ya mpasi nini, monene ya motungisi nini, [Nzambe] akotika yo mokolo moko te. Atiki mokolo moko te, mpe akotika mokolo moko te. Akoki kosala yango te. Ezali ezalela na Ye te [kosala bongo]. … Akotelema [ntango nionso] pembeni na biso. Tokokoki koleka na litumbu ya moto ya kongala; tokoki koleka na bamayi ya mozindo; kasi tokozikisama te to kozinda te. Tokobima na mikakatano mpe mpasi nionso oyo kozalaka malamu mpe mpeto mingi koleka lokola mbano na yango.”9

Sikawa, na bomipesi wana ya lokumu kobetaka ngonga euti na Nzambe ezali ntango nionso na bomoi na biso, emonisami na mpeto mpenza mpe malamu na bomoi, liwa, mpe ya Nkolo Yesu Klisto, tokoki kokima nsuka mabe ya lisumu mpe buzoba mpe—ya bisomei to oyo basusu—na lolenge nionso nini ekoki koyela biso na nzela ya bomoi ya mokolo na mokolo. Soki topesi motema na biso na Nzambe soki tolingaka Nkolo Yesu Klisto, soki tosali malamu mingi koleka tokoki kotia nsango malamu na misala, bongo lobi—mpe mikolo misusu nionso—ekozala na nsuka kitoko. Bomoi moko ya mbano, efuluka, mpe ya seko ezali ntina mpenza ya mwango na Ye ya mawa mpo na bana na Ye! Ezali mwango moko efandi likolo ya bosolo “ete Nzambe akosala na mosala mpo na malamu kati na makambo nionso epai na bango bakolingaka ye.” 10 Yango wana koba kolingaka. Koba komekak. Koba kolikiaka. Koba kondimaka. Koba kokolaka. Lola ezali kolendisa yo lelo, lobi, mpe libela.

“Oyebi te? Oyoki te?” Yisaya asakolaki.

“[Nzambe] akopesa nguya epai na ye oyo alembi; epai ya ye oyo azangi makasi akobakisa nguya. …

“… Baoyo bakolambelaka [Ye] bakozwa nguya ya sika; bakopombwa likolo na mapapu lokola mpongo …

“Mpo … Nkolo … Nzambe akosimba liboko [na bango] ya mobali, kolobaka [na bango] ete, Bang ate; ngai nakosunga yo.”11

Bandeko basi mpe mibali, tika Tata moko ya bolingo na Lola apambola biso lobi tokanisa lolenge nini toyoki lelo. Tika Apambola biso tolinga mpe tobunda na bompikiliki mpe bokasi kotambolaka epai ya mabongi toyoki kosakolama na eyenga ya likita oyo, koyebaka ete bolingo na Ye ya bonzambe mpe lisalisi ya solo ekozala na biso kutu ntango tozali kobunda—te, ekozala na biso mingimingi ntango tozali kobunda.

Soki nsango malamu kozala lokola likolo mpe bobongisi ya moto na moto oyo esengelami na mikolo ezali koya ezali komonana lokola ekoki kokokisama te, kanisa bolendisi ya Yosua na bato na ye ntango bakutanaki na lobi oyo ezalaki kobangisa. “Mibulisa,” alobaki, “mpo ete lobi Nkolo akosala misala ya kokamwa na kati na bino.”12Nasakoli ete elaka moko. Ezali elaka ya likita oyo. Ezali elaka ya Eklezia oyo. Ezali elaka na Ye oyoela na oyo asali makamwisi oyo, oyo azali Yemei “Malamu, Mopesi toli, Nzambe ya Nguya, … Nkumu ya Kimia.” 13Mpo na Ye natatoli. Mpo na Ye nazali litatoli. Mpe epai na Ye likita oyo ezali lokola kondimana na Ye mosala kokobaka na Mokolo monene ya suka. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.