2010–2019
Bikisa kati na Bomoko
sánzá ya zómi 2014


Bikisa kati na Bomoko

Na nzela ya kosunga Mobikisi, tosengeli kosala banso elongo na lisanga. Moto nionso, esika nionso, mpe libiangi nionso ezali na motuya.

Toyokaka mingimingi Mokambi Thomas S. Monson koloba, “Tanda loboko mpo na kosalisa.”1 Lisolo moko na Boyokani ya Sika eyei na makanisi na ngai. Ezali ndombola oyo esengeli na lolenge nini bandimi mpe ba misionele bakoki kosala elongo na bomoko na nzela ya kasanga ya ba palwasi kotanda loboko mpe kosalisa. Lisolo ezali naMalako 2:1–5. Namoni ete mayele Yesu asalelaki mpo na koyekolisa biso malongi to mabongisi ezali mingimingi efulama mpe pete mpo na kososola.

Moko ya bato na lisolo oyo ezali mobali moko azali na mokakatali, moto moko oyo azalaki na makoki te ya koningana na kozanga lisalisi. Moto oyo akokaki kaka kofanda na ndako, kozelaka lisalisi.

Mokolo moko, ekokaki kosalema lolenge oyo. Bato minei bazalaki kokokisa mosala na bango kowuta na episikopo na bango ya kotala, na ndako na ye, mobali moko oyo azalaki kobela maladi ya kolemba biteni ya nzoto. Nakoki komona moko na bango kowutaka na Lisanga ya Bamama Basungi, moko kowuta na lisanga likoki ya bampaka, moko kowuta na Bonganganzambe ya Alona, mpe, ya nsuka kasi ya moke te, misionele moko ya ntango mobimba. Na lisanga ya nsuka mpenza ya palwasi, nsima ya kopesanaka toli etali babosenga na palwasi, episikopo apesaka bitinda ya “bosungi.” Minei oyo bapesamaki mosala ya kosunga mobali oyo koniokuamaka na malady ya kolemba biteni ya nzoto. Bakoki te kozela ye aya na eklezia ye moko. Bakendaka na ndako na ye mpe batalaki ye. Baengelaki koluka ye, mpe boye bakendaki. Mobali wana azalaki komemama epai ya Yesu.

“ Mpe bango[bayei] epai na ye, komemaka mobeli moko ya molema, oyo amemamaki na minei” (Mark 2:3).

Nzokanda, ndako ezalaki ya kotonda makasi na bato. Bakokaki koleka kati na ekuke te. Nandimisami ete bamekaki eloko nionso bakokaki kokanisa, kasi bakokaki kaka te kokota na kati. Makambo elekaki te na pete te lolenge babongisaki. Mikakatano ezalaki ya nzela na bango ya “kosalisa.” Kasi batikaki te. Batikaki te moto ya maladi libanda ya ekuke. Bapesanaki toli mpo na nini kosala nsima—lolenge nini bakokaki komema mobali wana epai ya Yesu Klisto mpo na lobiko. Mosala ya kosunga Yesu Klisto na kobikisaka milimo, ata moke mpo na bango, ezalaki ata moko te ya mpasi mingi. Bayaki na libongisi moko—ya pete te, kasi basalaki yango.

“Mpe ntango bango bakokaki te kokoma mpembeni na ye mpo na bofini ya bato, bamataki likolo ya ndako esika ye azalaki: mpe babukaka likolo, bakitisaki na nse mbeto epai wapi mobeli ya bolema alalaki” (Mark 2:4).

Bamemaki ye likolo ya ndako. Na kokanisaka ete bimateli ya libanda ezalaki te mpo na bango komata, elingaki ezua bango mua ntango komema moto nionso na likolo ya ndaku. Nakanisi ekokaki kosalama na lolenge oyo: elenge mobali ya palwasi na ye akokaki komata yambo likolo ya ndako. Lokola azalaki elenge mpe atondisami na bokasi meke, ekokaki kozala mpasi mingi te mpo na ye. Moninga na ye moteyi ya ndako kowuta na bampaka ya lisanga likoki mpe misionele ya ntango nionso ya molayi mpe ya makasi akokaki mpenza kopusa na mpasi na nsie. Lisanga ya Bamama Basungi ekokaki kokundolisa bango kozala na bokebi mpe koyebisaka bango maloba ya bopesi makasi. Mibali bakokaki bongo kokoma kofundola likolo ya ndako ntango ndeko muasi akobaki kopesa mobali makasi ntango azalaki kozela lobiko—mpo na kozala na makoki ya koningana na yemoko mpe kozala na bonsomi.

Mosala oyo ya kosalisa esengi moto nionso asala elongo. Na ntango ya motuya, esengelaki ezua botambuisi ya bokebi mpo na kokitisa moto ya maladi kowuta likolo ya ndako. Bato oyo minei bakokaki kosala na bomoko mpe na boyokani. Ekokaki kozala na bokabuani te na kati ya minei. Bakokaki kokitisa mobali ya maladi ya kolemba biteni ya nzoto na etamboleli ya ndenge moko. Ye akokaki te kosimba na yemoko na ntina lolenge na ye ya bolembu.

Mpo na kosunga Mobikisi, tosengeli kosala na bomoko mpe boyokani. Moto nionso, esika nionso, mpe libiangi nionso ezali na motuya. Tosengeli tozala ya bomoko na Nkolo Yesu Klisto.

Na nsuka, mobeli, moto ya bolema alalaki liboso ya Yesu. “Ntango Yesu amonaki bondimi na bango, alobaki na mobeli ya bolema, Muana mobali, masumu na yo malimbisami yo(Malako 2:5). Yesu alakisaki mawa likolo epai ye mpe abikisaki ye—kaka te na nzoto kasi lisusu na molimo: “Muana mobali, masumu na yo malimbisami.” Oyo ezali kitoko te? Tokolinga te oyo ekomela biso nionso lokola? Na ntembe te nalingi.

Toyebi moto nionso na bomoi na biso oyo aniokuami na kolemba biteni ya nzoto ya molimo, moto moko oyo akoki kaka te kozonga na Eklezia na yemoko? Akoki kozala moko ya bana na biso, moko ya baboti na biso, molongani moko, to moninga moko.

Elongo na bamisionele ebele ya ntango mobimba sikoyo wana na etonga nionso ya Eklezia, ekozala mayele mpo na baepisikopo mpe bakambi ya bitape kosalela na malamu mingi koleka masanga ya bapalwasi mpe bitape na bango. Episikopo akoki kobenga mondimi mokomoko ya lisanga ya palwasi koya na molongo ya bankombo ya baoyo bakoki kosengela na lisungi. Bandimi ya lisanga ya palwasi bakopesa toli elongo na bokebi nionso na lolenge nini bakoki kosunga malamu mingi koleka. Baepisoko bakoyoka na bokebi makanisi mpe akopesa misala.

Ba misionele ya ntango mobimba bazali bomengo monene mpo na bapalwasi na makasi wana ya bosungi. Bazali bilenge mpe batondi na bokasi. Balingaka kozala na molongo ya bankombo songolo ya bato ya bato ya kosala na bango. Basepelaka kosala elongo na bandimi ya palwasi. Bayebi yango ezali mabaku minene ya kokutana mpo na bango. Bazali na komipesa mpo na kotia bokonzi ya Nkolo. Bazali na litatoli ya makasi ete bakokoma lokola Klisto mingi koleka ntango bazali kosala elongo na bokasi oyo ya bosungi.

Na bosukisi, ekoka ngai kabola elongo na biso moko lisusu ya bomengo ebombami na monaki na lisolo ya makomi oyo. Ezali na molongo 5:“Ntango Yesu amonakiya bango bondimi” (nsete ebetami). Namonaki yango te na kala—ya bango bondimi. Bondimi na biso ya kosangana ekosimba lisusu kosimba bolamu ya basusu.

Banani bazali bato oyo Yesu alobelaki? Bakoki malamu kokotisa minei oyo bamemaki moto ya kolemba biteni ya nzoto, mobali wana yemoko, bato oyo basambelaka mpo na ye, mpe baoyo nionso oyo bazalaki koyoka kuna mateya ya Yesu Klisto mpe kopesaka na kimia na mitema na bango mpo na likamuisi ekoya kala mingi te. Bakokaki lisusu kokotisa molongani moko, moboti moko, muana mobali moko to muana muasi moko, misionele moko, mokambi ya lisanga likoki moko, mokambi ya Lisanga ya Bamama Basungi moko, episikopo moko, mpe moninga moko ya mosika. Tokoki banso kosungana. Tosengeli ntango nionso komipesa komitungisaka mpo na koluka kosunga baoyo basengeli.

Natatoli ete Yesu Klisto azali Nzambe moko ya likamuisi. Yesu Klisto alingi biso nionso mpe azali na nguya ya kobikisa mpe kosalisa, na mosuni mpe na molimolokolo. Ntango tosungi Ye na etinda na Ye ya kobikisaka milimo, biso lisusu tokosungama na mosala wana. Natatoli lisusu na nkombo na Ye esangu, kutu Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala, mpo na ndakisa, Thomas S. Monson, “Mokumba na Biso ya Kosunga,” Ensign to Liahona, Nsanza ya Zomi. 2013, 5.