2010–2019
Boyei bolamu na Likita
Sánzá ya Zómi 2013


Boyei bolamu na Likita

Ezali lisambo na ngai ete tokoka kotondisama na Molimo ya Nkolo ntango tozali koyoka mpe koyekola.

Kitoko kani ezali, bandeko ba bolingo babali mpe basi, tosangani elongo mbala moko lisusu. Ezali koleka mibu 183 uta Eklezia ebongisamaki na Profeta Joseph Smith, na nse ya bokambi ya Nkolo. Na likita lina na sanza ya Minei 6, 1830, bandimi motoba ya Eklezia bazalaki wana.

Nazali na esengo ya koyebisa ete baposo mibale mileki, bandimi ba Eklezia bakomi 15 milio. Eklezia ezali kokoba kokola sikisiki mpe kobongola bomoi ya bato mingi mingi mobu na mobu. Ezali kopanzana o ntaka ya mabele lokola bokasi ya bamisionele na biso bazali koluka baye bazali koluka bosolo.

Ekoki ata mobu moko te uta nasakolaki bokitisi ya mibu ya mosala ya misio. Uta ntango wana, motango ya bamisionele ya ntango mobimba oyo bazali kosala ebakisami uta 58,500 na sanza ya zomi 2012 tii 80,333 lelo. Eyano ya kabakata mpe ya bofuli kani tozali na yango banzeneneke!

Makomi masantu makwi te esakola ya ntina mingi, mokumba te ya kokanga mingi, lilako te ya semba mingi koleka etinda epesameli na Nkolo mosekwi ntango abimaki na Galilai na bayekoli zomi na mibale. Elobi Ye, “Bokende kojalisa bayekoli na mabota yonso, kobatisaka bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na Molimo Mosantu.”1 Profeta Joseph Smith asakolaki, “Nsima na nyonso oyo elobamaka, mokumba ya monene mpe ya motuya mingi mingi koluka ezali koteya Nsango malamu.”2 Boko na bino awa lelo bakomikundola maloba na Mokambi David O. McKay, oyo alobaki liloba emeseni “ Mondimi nyonso Misionele!”3

Na maloba na bango nabakisi ya ngaimei. Sikawa ntango mpo na bandimi mpe bamisionele koya elongo, mpo na kosala elongo, kosala na elanga ya vino ya Nkolo mpo na komema milimo epai na Ye. Ye alengelaki nzela mpo na biso kokabola nsango malamu na banzela ebele, mpe Ye akosalisa biso na misala na biso soki tokosala na bondimi mpo na kokokisa mosala mwa Ye.

Mpo na kosimba bokasi ezali kobakisama ya bamisionele na biso, nasengeki bandimi na biso na kala bapesa, lokola bakoki, na mosolo ya bamisionele ya etape to na Mosolo ya Bamisionele Nyonso. Eyano na bosengi wana esepelisi mpe esalisi bankoto ya bamisionele oyo ezaleli na bango epesi bango ndingisa te ya komisunga. Napesi bino botondi mpo na bopesi na bino ya bokabi. Mposa mpo na kosalisa ezali kaka, mpo ete tokoka kokoba kosalisa baye oyo ya bango mposa ya kosalisa ezali monene kasi bazali te, na bangomei, na nzela ya kosala yango.

Sikawa, bandeko babali mpe bandeko basi, toyei awa mpo na koteyama mpe kofulama. Bansango mingi, kotalaka makambo ya nsango malamu ya ndenge na ndenge, ekopesama na mikolo mibale ekolanda. Babali mpe basi oyo bakoloba na bino baluki lisalisi ya lola eteli nsango bakopesa.

Ezali losambo na ngai ete tokoka kotondisama na Molimo ya Nkolo ntango tozali koyoka mpe koyekola. Na nkombo ya Mobikisi, Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 28:19.

  2. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 330.

  3. David O. McKay, in Conference Report, Apr. 1959, 122.