Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya libwa 2025
Yesu Klisto Azali mpe mpo na Mikolo Malamu
Ntango makambo ezali kotambola malamu, lolenge nini tokoki kotikala na makanisi epayi ya Mobikisi? Botala mwa makanisi.
Kanisa soki moninga moko alekisaki ntango elongo na yo kaka ntango azalaki na mikakatano mpe akimaki yo ntango azalaki na esengo. Yango ezali boyokani ya malamu? Mpenza te.
Ezali biso te kosalaka yango ntango mosusu na Mobikisi na biso—koluka Ye na bantango ya mpasi mpe kobosana Ye na bantango ya malamu?
Tolobelaka mingi lolenge nini Yesu Klisto asalisaka biso na bantango na biso ya mpasi, mbala mosusu mpo ete moto nyonso, na ntango moko to mosusu, akutanaka na makambo ya makasi.
Kasi ezali na mikolo mosusu—baposo to mibu kutu oyo wapi, soki tozali na libaku malamu—makambo ezali kotambola malamu mpenza. Ntango mosusu tobosanaka Mobikisi na ntango wana. Bato ya Buku ya Mormon basalaki bongo. Bazwaki bomengo uta na mapamboli ya Nzambe mpo na mwa ntango kasi nsukansuka bakweyaki na lolendo ntango babosanaki Ye.
Bantango malamu elingi koloba te ete na mbalakaka tozali na mposa ya Yesu Kristo lisusu te. Bantango ya bomengo ezali bantango ebongi mpenza mpo na kosepela elongo na Mobikisi, ya kobosana Ye te.
Bongo lolenge nini totikalaka na boyokani na Yesu Klisto mpe Tata na biso na Lola ntango mimekano ezali kokundolisa biso te totala epayi na bango?
Zala na Komikitisa
Ntango makambo ezali kotambola malamu, ezali malamu kosepela na mapamboli na yo mpe makambo oyo okokisi. Kasi kobosana te nani asalisaki yo okoma esika ozali. Mokonzi Benjamini atie yango boye na lisukulu na ye ya Buku ya Mormon:
“Mpo tala, ezali biso banso basengi te? Eyekemi biso te banso likolo lya Mozali ona kaka, kutu Nzambe, mpo ya biloko binso tozwi, mpo ya bilei mpe bilamba lokola, mpe mpo ya wolo, mpe mpo ya mpauni, mpe mpo ya bozwi bonso tozwi bwa lolenge na lolenge?” (Mosiya 4:19).
Kozala na komikitisa etali elonga na yo na komikundolaka oyo Tata na Lola mpe Yesu Klisto basali mpo na yo ezali lolenge malamu ya kokotisa Bango na bantango na yo ya malamu.
Zala na botondi
Botondi ezali moko ya bankisi malamu koleka mpo na lolendo mpe kobosana. Kopesa Nzambe matondi ekosalisa yo omikundola Ye mpe malamu nyonso oyo Ye mpe Mwana na Ye basalaka na bomoi na yo. Oyo ezali mpenza na ntina na bantango ya malamu mpe na bantango ya mpasi.
Yeba Malamu
Moko ya bitumba Satana alingaka makasi ezali ya “kopesa kimia, mpe kobondela [bino] na bokengi ya mosuni” (2 Nefi 28:21). Na maloba mosusu, akolinga yango soki omiyokaki ya kosepela mpe na libateli na bantango na yo ya malamu ete obosanaki oyo ezali na ntina mingi. Kasi, kobosana Nzambe te! Ntango ozali kotikala na boyebi ya mayele mabe ya monguna mpe kotemela yango atako na ntango na yo ya malamu, okoki kotikala penepene na Tata na Lola mpe Yesu Klisto.
Mobateli Mpate Malamu, na Michael Malm
Tya Makanisi na Yo nyonso epayi ya Klisto
Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Ntango totie makanisi na bomoi likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe … mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka esengo kotalaka te oyo ezali kosalema—to kosalema te—na bomoi na biso. Bosepeli eyei uta mpe mpo na Ye. Azali liziba ya esengo nyonso.”
Mbala boni okanisaka bosolo oyo etali esengo ntango bomoi ezali kotambola malamu? Oyo ezali kaka te toli ya kobondisa ntango makambo ezali mabe. Ezali solo ntango nyonso, kobakisa na mikolo na yo ya malamu koleka. Na yango sala nyonso okoki mpo na kotya makanisi epayi ya Klisto, ezala mabe to malamu.
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, September 2025. Lingala. 19626 639