2025
Sima ya Bomoi Oyo: Biyano na Mituna Mosusu
Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya nsambo 2025


Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya nsambo 2025

Nsima ya Bomoi Oyo

Biyano na Mituna Mosusu

Mwango ya Tata ya lola ekoki kopesa biso bomoni mpe kimia na oyo etali bomoi sima ya nkufa.

eskalye moko na kati ya mapata

Elilingi na Thomas Arnaud

Nini ekomelaka biso soki tokufi?

Yango ezali ntango mosusu moko motuna na kati ya eyamba mobimba. Biyano oyo tozali na yango na nzela ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye ezali na nguya. Bomoi oyo ezali nsuka te. Mpo ete Yesu Klisto asekwaki, milimo mpe banzoto na biso ekosagana lisusu, mpe tokosekwa biso nyonso mokolo moko.

Ya solo, ezali na makambo mosusu oyo etali bomoi nsima ya liwa oyo eyei epai na biso na nzela ya emoniseli ya mikolo oyo oyo ekoki koyanola na mituna mosusu oyo tokoki kozala na yango. Tala mwa mituna ya ndenge wana, elongo na mwa biyano ya mokuse.

Banzoto ya molimo ezalaka ndenge nini?

Molimo ezali lolenge moko ya likambo, bobele “pepele to peto koleka” (Malongi mpe mayokani 131:7). Banzoto ya molimo ezali lokola banzoto ya bato ya mikolo.

Mokili ya molimo ezali wapi?

Awa, nzinganzinga na biso.

Nini elakaka na Mokili ya molimo?

Katikati ya makambo mosusu, milimo oyo bandimaki nsango malamu babongisamaki mpo na koteya nsango malamu na milimo oyo baboyaki nsango malamu. Milimo yango bakoki kopona kondima to koboya yango.

Nzoto oyo esekwi ezali ndenge nini?

Banzoto esekwa ekoki kokufa te, ezali na mosuni mpe mokuwa, mpe ezali kobonga nie. Bazali na nkembo mpe kitoko. “Ezali na eloko moko te ya kitoko koleka kotala mobali to mwasi asekwa.”

Nini elekaka na bokonzi ya selesitiale?

Baye na motuya likolo makasi na bokonzi ya selesitiale bakomaka lokola Tata na biso ya Lola mpe bakoyeba esengo etonda. Bango bayambi nyonso oyo Tata azali na yango. Bango basangani na mosala mpe nkembo na Ye. Bqkokangisama na libala mpo na boseko mpe sikawa kobika na mabota ya libela na libela, kozalaka na bana ya molimo ya libela na libela mpo na bango moko.

Ezali lolenge nini mpo na bato oyo batikala kobala te na bomoi oyo?

Tata ya lola ezali sembo koleka mpe atonda ngolu. “Nkolo alakaki ete kati na baboseko mapamboli moko te ekopekiselama bana na ye ya mibali mpe basi oyo bazali kobatela mitindo, bakangemi na mayokani na bango, mpe bazali na mposa ya oyo ezali malamu”.

Baboti na ngai bakangisamaki na tempelo, kasi sikoyo babomi libala. Nakangisami na nani?

Ekoki kozala “obotami kati na liyokani” (yango ezali, obotami sima ya bokangisami ya baboti na yo kati na tempelo), to okangisamaki na baboti na yo kati na tempelo nsima ya bango kokangisama na moko na mosusu. Na lolenge nyonso mibale, mapamboli na bino etikali makasi atako soki baboti na yo baponi kokabwana mpe bokangisami na bango epanzani.

Boponi ya baboti na yo esimbi mapamboli na yo te. Eloko ya motuya ezali mpo na yo kotikala na bondimi mpe koluka mapamboli na tempelo yo moko. Kotalaka mokangano na bino ya libota, osengeli “kolikya na Nkolo mpe koluka libondisi na Ye,” koyebaka ete “Tatat ya Lola akotala ete moto nyonso azua lipamboli nyonso oyo mobali to mwasi oyo bosenga mpe boponi epesi ye nzela.”

Nini ekomelaka bato oyo bakufaki na komiboma?

Toyebi te nini ekomelaka bato oyo bakufi na komiboma, mpe tokoki kosambisa bango te (bobele lokola bato nyonso, na suka na nyonso). “Atako makasi ya koleka ya balingami, bakambi, mpe bato ya mosala, komiboma eyebana penza te. …

“Yango ezali sembo te moto kozwa bomoi na yemoko. Nzokande, bobele Nzambe akoki kosambisa makanisi, misala, mpe nguya ya mokumba ya moto (tala 1 Samuele 16:7; Malongi mpe mayokani 137:9). …

“Baye oyo babungisi molingami moko na bomibomi bakoki kozwa elikya mpe libiki kati na Yesu Klisto mpe bomikabi na Ye.”

Matangi

  1. Tala Ether 3:16; Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph F. Smith (1998), 131–32.

  2. Tala Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young (1997), 279.

  3. Tala Malongi mpe mayokani 138.

  4. Tala Alma 11:45.

  5. Tala Luka 24:39.

  6. Tala Alma 11:43.

  7. Lorenzo Snow, The Teachings of Lorenzo Snow, ed. Clyde J. Williams (1996), 99.

  8. Tala Moses 1:39.

  9. Tala Nzembo 16:11; 3 Nefi 28:10; Malongi mpe mayokani76:59, 62; 130:2; 132:19–23.

  10. Dallin H. Oaks, Oct. 1993 general conference (Ensign, Nov. 1993, 75).

  11. Tala Buku Monene: Kosunga kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, 38.4.2.8 , Biblioteke ya Nsango Malamu

  12. Buku Monene, 38.4.2, Biblioteke ya Nsango Malamu.

  13. Buku Monene, 38.6.20, biblioteke ya Nsango Malamu.