Nzambe Azali Ebandeli ya Bosolo Nyonso.
Tokoki kotalela Nzambe, Mwana na Ye, Yesu Klisto; mpe Molimo Mosantu mpo na bosolo.
Eloko Tondimeli: Nzambe Azali Ebandeli ya Bosolo Nyonso
Ntango mosusu, tokoki koyoka mobulungano na oyo etali bomoi na biso to mpe kozanga koyeba na oyo etali makambo ekoya. Tokoki kozwa nzela na biso liboso elongo na Tata na biso ya Lola ya bolingo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, oyo bazali ebandeli ya bosolo.
Nazali mwinda ya mokili: ye oyo akobila ngai akotambola na molili te, kasi akozala na mwinda ya bomoi.
Yesu azali ndakisa ya kokoka na biso na lolenge ya kobika. Mateya na Ye esalaka lokola mwinda ya bokambi oyo ekoki kokamba biso na kimya. Moto nyonso oyo alingi kolanda Yesu Klisto akoki kozwa mwinda oyo; Ye alaki ete nyonso akoluka Ye akomona Ye.
Molimo Mosantu Asungaka Biso
Molimo Mosantu, azali motindami ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Ezali na ndenge ebele oyo Molimo Mosantu akoki kosalisa komema biso mpene ya Nzambe. Molimo Mosantu
- Abondisaka (tala
Yoane 14:16–17, 26 ;Moroni 08:26 ;Malongi mpe Mayokani 36:2 ). - Amonisaka mpe atatolaka bosolo (tala
2 Nefi 32:4– 5 ;Alma 5:46–47 ;Malongi mpe Mayokani 8:2–3 ). - Apesaka litatoli ya Tata mpe Mwana (tala
Yoane 15:26 ;3 Nefi 11:32, 36 ). - Asantisaka mpe apetolaka (tala
Alma 13:10–12 ;3 Nefi 27:19–20 ;Moroni 6:4 ).
Ndenge nini Nakoki Koyeba Nini Ezali Solo?
Bondela Tata na Yo ya Bolingo na Lola.
Nzambe alingi biso mpe alingi koyoka biso. Ye alaki ete ntango tosambeli, Ye akopesa biso eyano mpe litambwisi.Yesu ateyi biso ndenge nini ya kosambela na Bibilia (
Zala na kondima
Bibilia eteyi ete “bondimi ezali ntina ya makambo oyo tozali kolikya, elembeteli ya makambo oyo emonanaka te” (Yeba Molimo Mosantu
Nzambe asololaka na biso na nzela ya Molimo Mosantu na banzela ebele. Na kati ya Bibilia, mbala mingi elimbolamaka lokola “kaka mongongo ya moke” (tala- Mayoki ya bolingo, esengo, kimya, mpe bolamu (
Bagalatia 5:22-23 ). - Bopole mpe bokambi ya bomoi na yo (
Malongi mpe Mayokani 8:2–3 ). - Makanisi na kati na yo mpe mayoki na motema na yo (
1 Bakolinti 2:9–11 ). - Pole ezwi esika ya molili (
Alma 19:6 ).
Bolanda Ndakisa ya Mobikisi
Yesu atie ndakisa ya suka mpo na banso kati na biso. Soki tolingi toyeba nini ezali solo, Tokoki kolanda ndakisa Na Ye mpe kosala nini Ye asalaki.Oyo ezali komonana ndenge nini?
- Lakisa bolingo mpe bolingani na basusu mpe na Nzambe.
- Tala ndenge misala yango esalaka yo omiyoka.
- Kanisa ndenge misala yango ebongolaka bomoi na yo.
Ozali na Mituna Misusu?
Bandimi ya Eklezia na biso oyo bamipesaka na lifuta te ntango na bango lokola bamisionele bakoki kotala elongo na yo na nzela ya interneti to na miso mpo na kokabola nsango moko ya bofuli mpe koyanola na mituna na yo mpo na yo moko mingi koleka.