Yaka, Landa Ngai 2024
Mbongwana Ezali Ntina na Biso


“Mbongwana Ezali Ntina na Biso,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Mbongwana Ezali Ntina na Biso” Yaka, Landa Ngai—Mpo na LIbota mpe Eklezia: 2024

Elilingi
tata mpe bana bazali koleisa mwana ya mpate

Mbongwana Ezali Ntina na Biso

Ntina ya koyekola nsango malamu mpe liteya nyonso ezali ya kopika misisa na mbongwana na biso mpe kosalisa biso tokoma mingi lokola Yesu Klisto. Mpo na ntina oyo, ntango tozali koyekola nsango malamu, tozali kaka te koluka nsango ya sika; kasi tozali kolinga kokoma “ekelamo ya sika” (2 Bakolinti 5:17). Yango elingi koloba kotalela Tata na Lola mpe Yesu Klisto basalisa biso tobongola mitema na biso, bomoni na biso, misala na biso, mpe ndenge na biso mpenza.

Kasi lolenge ya koyekola nsango malamu oyo ekolendisa bondimi na biso mpe ekomema biso na mbongwana ya kokamwisa oyo esalemaka mbala moko mpenza te. Ekendaka mosika koleka boyebi ya kelasi na kati ya motema mpe ndako ya moto ye moko. Esengaka kosala makasi ya ntango nyonso, ya mokolo na mokolo mpo na kososola mpe kosalela nsango malamu. Mbongwana ya solo esengaka nguya ya Molimo Mosantu.

Molimo Mosantu akambaka biso na bosolo mpe apesaka litatoli ya bosolo wana (tala Yoane 16:13). Ye agengisaka mayele na biso, alendisaka bososoli na biso, mpe atutaka mitema na biso na emoniseli ya Nzambe, liziba ya bosolo nyonso. Molimo Mosantu apetolaka mitema na biso. Ye afulaka kati na biso mposa ya kotambola na bosolo, mpe Ye amimisaka epai na biso banzela ya kosala yango. Ya solo, “Molimo Mosantu … akoteya [biso] makambo manso” (Yoane 14:26).

Mpo na bantina oyo, na bokasi na biso ya kosalela, koyekola, mpe koteya nsango malamu, tosengeli yambo ya nyonso koluka kozala moninga ya Molimo. Ntina oyo esengeli kokonza maponi na biso mpe kokamba makanisi mpe misala na biso. Tosengeli koluka nyonso oyo ebengisaka nguya ya Molimo mpe koboya nyonso oyo ebenganaka nguya yango mosika—mpo toyebi ete soki tokoki kozala bato balongobani liboso ya Molimo Mosantu, tokoki mpe lisusu kolongobana mpo na kozala liboso ya Tata na Lola mpe ya Mwana na Ye, Yesu Klisto.