2020
Kosalisa na nzela ya Misala ya Bomikoki to Autonomie
Sanza ya Mwambe 2020


“Kosalisa na nzela ya Misala ya Bomikoki to Autonomie,” Liahona, Sanza ya Mwambe 2020

Elilingi
kosalisa

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Mwambe 2020

Kosalisa na nzela ya Misala ya Bomikoki to Autonomie

Kosalisa basusu bamisunga ezali kopesa mpe kosalisa na lolenge ya Nkolo.

Ebele ya bandeko na biso na libota, baninga mpe bato ya nzinga nzinga bamipesaka mingi mpo na koluka kokoma autonome to na bomikoki koleka. Kosalelaka ndakisa ya Eklezia ya bomikoki, bandeko ya Eklezia bazwaka mabaku ya kosunga, kolengela mpe kosalisa ntango bapambolaka basusu na mabongi oyo ememaka “elikya monene, kimia, mpe bokobi.”1

“Nazalaki na Ndaku”

Na Chrissy Kepler, Arizona, USA

Nazalaki na mpasi ya mosolo nsima ya kokabwana na molongani, komekaka kozongela mosala na ngai ya mpasi nsima ya kozala mama ya ndaku mibu mwambe. Nazalaki lisusu na mpasi na molimo, kolukaka bosolo mpe bondimi, atako nazalaki kokende ndako Nzambe lisusu te uta nazalaki elenge ya mibu zomi.

Eyenga moko nazalaki kosokola bilamba na ndaku ya ndeko na ngai ya kulutu ya mwasi,Pricilla, ndeko moko ya Eklezia ya misala. Ntango nazalaki kuna, Priscilla abengisaki ngai nakende eklezia elongo na libota na ye—libengisi ya yambo nazwaki koleka uta mibu 15.

Yambo nandimaki na mpasi, kasi na butu ya liboso, nabondelaki epai ya Nzambe alakisa ngai lolenge nini ya kozala pene na Ye. Nsima ya koyoka bitinda ya kati na ngai, nasukisaki, “Mpo na nini okende te oyoka mpe omona yo moko lokola mokolo na motema mpe misu na yo moko?”

Ntango tozalaki na liyangani ya elambo, namonaki mwa mokanda ya lokasa bafina-fina [depliant] na nsango ya Eyenga koyebisaka ete bakoteya bato mateya ya bomikoki to Autonomie na mosolo ya moto ye moko. Namilengelaki mpo na kozonga lisusu eklezia te, kasi nazalaki na mposa ya koyekola mateya wana ya baposo 12. Na bolendisi ya ndeko na ngai ya mwasi mpe semeki na ngai, natiaki mokoloto, nandimaki koyekola lolenge nini kobomba mosolo mpe kofuta nyongo. Boyekoli, bongo nde ebongolaki ngai na molimo.

Natutisamaki na bansango ya molimo uta baposo mibale ya yambo ya boyekoli, kasi na ntango boyekoli ya misato, nakotisamaki na liyoki ya kondimisama ete nazalaki epai na ngai mpe nazalaki koyoka bosolo ya sika kasi oyo nazalaki na yango. Natikaki boyekoli mpe nakendaki kotala Priscilla. Na mpinzoli, natunaki ye, “Lolenge nini nakoki koyoka lisusu liyoki oyo na bomoi na ngai?” Alengelaki bamisionele mpo ete bateya ngai.

Baninga na ngai ya kelasi ya bomikoki bayaki na boyekoli na ngai na bamisionele mpe basungaki ngai. Bazalaki na nguya makasi na molimo na ngai mpe basungaki ngai namatisa litatoli na ngai ya nsango malamu mpe baprofeta ya mokolo ya lelo.

Na ntango oyo nasengelaki kosilisa boyekoli na ngai, mbongwana mingi esalemaki na nzoto mpe molimo. Nabandaki mosala ya sika na kompani malamu, mpe nafutaki baniongo ebele.

Kasi mapamboli ya bozindo mpe ya pete oyo eyaki uta na boyekoli ezalaki ya kosala mokangano ya kozala malamu na baninga, kokolisa mokangano malamu na episiko ya bolendisi, kozwalitatoli ya moko na zomi, kozwa mokanda na ngai ya tempelo, kozwa dotasio mpe komona bana na ngai mibale ya mikolo kozwa libatisi.

Nzela na ngai ya bomikoki ezali kokoba kaka, kasi mpo na mobembo na ngai oyo etikali, nakolengela boyekoli oyo nayekolaki mpe mikangano nasalaki na baninga.

“Natikaki Kelasi moko na moko Bato Koyokaka ete Balingani”

Ntango akendaki kotala Temple Square na Salt Lake City, Utah, elongo na mwana na ye ya mobali ya mibu, Vincent, na Sanza ya zomi na mibale 2016, Katie Funk amiyokaki “ya kozanga bondimi mpenza.” Atikaki Eklezia uta azalaki na mibu 16, akomaki mama monzemba na mibu 17, abandaki kotia bilembo na nzoto, mpe amatisaki mposa ya kafe. Kasi na ntango wana bakendaki kotala Temple Square, Vincent ayokaki Molimo Mosantu mpe atunaki mama na ye soki akokaki koyekola mateya ya bamisionele.

Atako bozito ya misala mibale, ya bangonga 80 ya mosala na poso, Katie ayekolaki nsango malamu elongo na Vincent, kolukaka biyano na mituna na ye na botali ya bamisionele. Na eleko ya moyi ya 2017, abandaki kokende mayangani ya Eklezia, epai oyo ayekolaki na ntina ya mateya ya bomikoki ya Eklezia.

“Namonaki ezalaki na eleko moko oyo ekokaki kosunga ngai,” alobaki. “Ntango mosusu nasengelaki kosala misala mibale te to kotalela baboti na ngai mpo na ntango ya bomoi na ngai oyo etikali.”

Katie abengaki mateya na ye “bolendisi ya kokamwa ya nzoto mpe molimo,” kaka te mpo na oyo ayekolaki kasi lisusu mpo na lolenge oyo lingomba na ye ya bomikoki to autonomie endimaki mpe esalisaki ye.

Litangi

  1. “Nsango ya Bokambi ya Yambo,” na Personal Finances for Self-Reliance (2016), i.