2020
Kosalisa na nzela ya Misala mya Eklezia
Sanza ya Nsambo 2020


“Kosalisa na nzela ya Misala mya Eklezia,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2020

Elilingi
kosalisa

Foto ya bilenge mibali bazali kotonga ema na Bud Corkin; foto ya elenge mwasi azali kobongisa mesa na Sherie Price McFarland; ebimisami na nkasa na Getty Images

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Nsambo 2020

Kosalisa na nzela ya Misala mya Eklezia

Mokanda ya Mokomi: Nsango oyo ekomamaki yambo ya bokono ya COVID-19. Ndambo ya makanisi mapesami awa na nse bakoki kosalela yango te na bantango oyo ya bozali mosika ya bato kasi bakosalela yango ntango makita mpe misala ya Eklezia ekobanda lisusu. Soki bosenga ezali, tosengi bosalela makanisi oyo engebene na mitindo ya sikawa ya Eklezia mpe ya Leta.

Lolenge moko oyo tokoki kosalisa bandeko na biso ya palwasi, bato ya pembeni, mpe baninga ezali na nzela ya misala ya Eklezia. Soki obongisi moango ya misala oyo etali bosenga to matomba ya moto moko osalisaka to obengisi bango bazala elongo na misala to na mabaku ya kosalisa basusu, misala na palwasi, likonzi, to kutu na makonzi mingi ekoki kopesa banzela ya ntina mpe ya kosepelisa mpo na koleisa bomoko mpe kolendisa bandimi.

Misala ya Eklezia ekoki lisusu kofungola ekuke na mabaku ebele ya kosalisa. Ndakisa, misala ya Eklezia ekoki kopesa mabaku ya kobongisa elongo na miango ya kosalisa oyo epambolaka basusu mpe etongaka mikangano malamu kati ya lingomba ya bato. Misala ya Eklezia ekoki lisusu kozala libaku malamu mpo na kosembola loboko na bandimi ya Eklezia oyo balembi mpe na baninga basusu ya biyamba mosusu to baninga oyo bazanga eyamba.

Kobengisaka bato ebele na kati ya misala ya Eklezia epesaka libaku mpo ete Nkolo apambola mpe alendisa bapalwasi mpe bitape, baninga na biso, mpe mangomba na biso.

Kotongaka Mikangano Malamu

Eleko ya mpio ezalaki koya, mpe David Dickson azalaki na likanisi moko te lolenge nini kotika libota na ye bayoka moto.

David, mwasi na ye, mpe bana mibale ya basi bawutaki kokende na mboka moke ya Fredonia, Arizona, USA, mboka ya esobe ezingama na bangomba ya mabanga minene ya motane, banzete ya artemisia, mpe banzete ekweisaka nkasa te.

Ndako oyo ba Dicksons bazalaki kofutela ezalaki kosalela lituka ya bakoni lokola liziba na yango ya yambo ya kopesa moto. David na lombango ayekolaki ete kolokotaka bakoni ezalaki likambo ya kosala ya ntina mpo ete bileko ya mpio na Fredonia ekweisaka mvula ya mpembe mpe mabanga mingi.

“Nzalaki na bakoni te to masini ya kokata nkoni te to kutu boyebi ya lolenge nini ya kosalela moko te!” David alobi. “Nayebaki te nini nakokaki kosala.”

Bandimi ya palwasi mosusu batunaki David soki libota na ye ezalaki na nkoni ya kokoka mpo na kosalela na eleko ya mpio. “Ezwaki bango ntango molai te mpo bayeba ete nazalaki na yango te,” David alobi. “Bampaka ya lisanga likoki kala te basungaki ngai kolokota nkoni. Natondisamaki na botondi, nandimaki lisungi na bango.”

Kala mingi te David amonaki ete mobembo ya bolokoti nkoni oyo ezalaki ya lolenge ya misalamingi ya palwasi elengelami malamu, ebongisamaki malamu, mpe esangisaki bato mingi. Poso moko na ntongo, David, bampaka ya lisanga likoki, mpe bandimi ya palwasi mosusu bakendaki na ngomba na milongo ya mituka mpe mituka miye mibedandaka misusu.

“Kaka na nsima ya nzanga se moko, na lisalisi ya bisalele mpe boyebi mosala na bango, bandimi ya palwasi bapesaki libota na ngai liboke ya nkoni oyo ewumelaki eteni molai ya bileko ya mpio mibale,” David alobi. “Kutu ya motuya koleka, nateyamaki eloko nyonso nasengelaki koyeba na ntina ya kolokota nkoni na ngai moko. Ntango natikaki Fredonia, nayebaki lolenge nini kosalela masini ya kokata nzete, mpe nasungaki na misala ya palwasi ebele ya kolokotaka nkoni oyo nakoki kotanga te.”

Lolenge ya misala ya palwasi oyo etongaki kaka mokangano ya ntina na kati ya bandimi ya Eklezia te kasi etongaki lisusu mokangano malamu na moto nyonso na kati ya lingomba ya bato.

“Namikundoli mwasi moko, azalaki mondimi ya Eklezia te, kasi azalaki moto ya sika na etuka yango,” David alobi. “Batikaki ye kotumbaka mabaya ya ndako na ye mpo na koyotela moto. Ntango toyokolaki mpasi na ye, tondimaki azalaki na nkoni ya moto ekoka mpo na kosalela na eleko ya mpio mobimba. Azalaki na botondi mingi nde akokaki koloba.”

Bokasi ya kosalisa na Fredonia endimisaki ete moto nyonso abatelamaki mpe akokaki komiyotela moto na eleko ya mpio mobimba.

Kosembola loboko na Basusu

Na ntango ya misio moko na Romania, Meg Yost mpe moninga na ye mbala mingi bazalaki kokende kotala libota moko oyo ezalaki kokende lisusu eklezia te ntango molai. “Ba Stanicas bazalaki kati na bandimi ya yambo ya Eklezia na Romania,” Meg alobi, “mpe tolingaki bango.”

Ntango ekomaki ngonga ya kosala mwango mpe kobongisa molulu moko ya etape, bakambi bazwaki mokano ete etape esengelaki kozala na “Mpokwa ya Bapionie.” Oyo esengelaki kozala mpokwa ya kokundola bilombe bapionie oyo bakatisaki Etazini mpo na kokende na Salt Lake Valley. Esengelaki lisusu kozala libaku ya kopesa lokumu na bapionie ya Eklezia na Romania.

“Tokanisaki esengelaki kozala lolenge malamu mpo na bandimi mosusu batatola na ntina ya mbongwana na bango mpe lolenge nini bamonaki Eklezia kokola na Romania,” Meg alobi. “Mbala moko tokanisaki ete libota ya Stanica esengelaki kokota na likambo yango. Tobengisaki bango basangana na biso, mpe basepelaki!”

Na mpokwa ya molulu yango, Ba Stanica bakomaki naino te ntango ngonga ya kobanda ekokaki.

“Tomitungisaki ete bakoya te,” Meg amikundoli. “Kasi kaka na ntango wana, bakotaki. Libota ya Stanica bapesaki litatoli kitoko ya nsango malamu mpe ya Eklezia. Bayebanaki lisusu na bandimi mosusu oyo bamonaki te uta ntango molai.”

Bandimi ya etape bafungolaki maboko na bango mpe bayambaki libota ya Stanica. Eyenga oyo elandaki, Meg akamwaki na esengo komona Ndeko mwasi Stanica na eklezia.

“Ntango nakendaki kotala etape yango mwa basanza nsima, azalaki kaka koya!” Meg alobi. “Nakanisi libaku malamu ya kopesa litatoli na ye mpe komiyoka na kati mpe ya kosengelama na kati ya etape esungaki ye mpenza.”

Makanisi 4 mpo na Kosalisa na nzela ya Milsala ya Eklezia

  • Bongisa mwango ya misala to milulu oyo ekokani na babosenga: Misala ezali lolenge monene mpo na kokokisa babosenga ya ndenge na ndenge. Ekoki kobongisama mpo na kokokisa babosenga songolo ya moto to lingomba. Esengeli lisusu kokokisa bosenga ya baoyo bazali kosala elongo, soki bosenga na bango wana ezali ya koyebana moko na mosusu malamu, boyekola ebele na ntina ya nsango malamu, to koyoka Molimo.

  • Bengisa moto nyonso: Ntango ozali kobongisa milulu, sala makasi nyonso mpo na kobengisa baoyo bakozwa litomba na kati na yango. Tia na makanisi bandimi ya sika, bandimi oyo balembi, bilenge, banzemba ya mikolo, bato ya bokono mpe bato ya biyamba mosusu. Tandola libiangi na matomba na bango ya malamu koleka na makanisi, mpe lakisa lolenge nini okolinga ete bango baya.

  • Lendisa kozala mpe kosala ya moto nyonso: Baoyo ozali kobengisa bakozwa mingi uta na milulu soki bazali na libaku ya kozala mpe kosala na kati. Lolenge moko ya kolendisa bozali na kati ezali ya kosenga na bato oyo basalela makabo na bango, boyebi, mpe batalanta na ntango ya molulu yango.

  • Yamba moto nyonso: Soki baninga na yo bazali kati na molulu, sala nyonso okoki kosala mpo ete bamiyoka bayambami malamu. lolenge moko, soki omoni bato oyo oyebi te, zala lokola moninga na bango mpe yamba bango lokola!