2019
Ekoki Ngai Kosunga Moto moko Abongwana?
Sanza ya Mwambe 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Mwambe 2019

Ekoki Ngai Kosunga Moto moko ETE Abongwana?

Iyo. Kasi mosala na yo ekoki kokesana na oyo okanisaki.

Tokelamaki na makoki ya kobongwana. Kokola mpo na makoki na biso ya bonzambe ezali ntina ya bomoi na biso na kufa. Moko ya bantina na biso ya suka ezali kosunga basusu baya epai ya Klisto mpe basala mbongwana esengeli mpo na kozonga na miso na Ye. Kasi na ntina ya bonsomi na bango ya kopona, mosala na biso na kosunga bango bakoma mingi lokola Klisto ezali na ndelo.

Tala mateya sambo ya nguya mpenza uta na Mobikisi oyo etali lolenge tokoki kosunga basusu na bokasi na bango ya kobongwana mpe kokoma mingi lokola Ye.

  1. Bobanga te Kobengisa mpo na Mbongwana

    Mobikisi abangaki kosenga basusu te batika banzela ya kala nsima mpe bayamba mateya na Ye. Asengaki Petelo mpe Yakobo batika misala na bango mpe “bakoma balobi bato” (Malako 1:17). Asengaki mwasi oyo bamokangaki na ekobo ete, “kende, mpe kosumuka lisusu te” (Yoane 8:11). Asengaki elenge mobali ya bozwi atika bokangami na ye na biloko ya mokili mpe alanda Ye (tala Malaki10:17–22). Biso mpe tokoki kozala na mpiko mpe na bolingo ntango tobengisi basusu basala bambongwana mpe balanda Mobikisi.

  2. Bomikundola Ete Ezali Boponi na Bango ya Kobongwana

    Lolenge ya mbongwana Mobikisi abengi biso kosala ekoki kozala ya makasi te. Mobikisi ateyaki mpe abengisaki, kasi Ye asalaki na makasi te. Elenge mobali ya bozwi yango “akendaki na mawa” (Matai 19:22). Na Kapenum, mingi ya bayekoli na Ye baponaki “kozonga nsima,” mpe Ye atunaki Bazomi na mibale soki balingaki kokende mpe lokola (tala Yoane 6:66–67). Boko ya balandi ya Yoani Mobatisi baponaki kolanda Mobikisi, basusu balandaki te (tala Yoane 1:35–37; 10:40–42). Tokoki kobengisa basusu bakoma mingi lokola Ye, kasi tokoki te kozwa mokano ya kobongwanaa mpo na bango. Mpe soki naino baponi te kobongwana, tosengeli kotika te—to esengeli te koyoka lokola tokweisami.

  3. Bosambela mpo na Makoki ya Basusu ya Kobongwana

    Na ntango ya Losambo na Ye mpo na basusu, Yesu asengaki Nzambe ete bayekoli na Ye babatelama na mabe, bakoma mingi lokola Ye mpe Tata, mpe batondisama na bolingo ya Nzambe (tala Yoane 17:11, 21–23, 26). Mpe koyebaka ete Petelo akozala na mposa ya bokasi na makasi na ye ya kokola na mosala na ye, Mobikisi asambelaki mpo na ye (tala Luka 22:32). Nsambo na biso mpo na basusu ekoki kosala bokeseni (tala Yakobo 5:16).

  4. Boteya Bango Bayekama ya Nguya na Ye

    Ezali bobele na nzela ya Mobikisi nde tokoki solo kobongwana mpe kokola mpo na likoki ya bonzambe oyo banso tozali na yango. Azali, “nzela, bosolo, mpe bomoi: moto moko te akoki kokende epai ya Tata soki na [Ye] te” (Yoane 14:6) Ezali Nguya na Ye oyo ekoki “kosala biloko ya botau ekoma makasi” (Etele 12:27). Ezalaki bondimi na nguya na Ye ya komikaba oyo epesaki Elenge Alama makoki ya l kobongwama (tala Alama 36:16–23). Tokoki koteya basusu bayekama na Mobikisi mpo ete bango mpe lokola bakoka kozwa nguya na Ye ya kopetola bomoi na bango.

  5. Bosalela Bango lokola Bakoki Kokoma

    Bolingo mpe boyambi ekoki kozala bisalele ya nguya ya mbongwana. Mwasi na liziba ya mai azalaki kofanda elongo na mobali oyo azalaki molongani na ye te. Bayekoli ya Yesu “bakamwaki ete azali kosolola na mwasi” (Yoane 4:27), kasi Yesu atalelaki mingi nini akokaki kokoma. Ateyaki ye mpe apesaki ye libaku ya kobongwana, yango nde asalaki . (Tala Yoane 4:4–42.)

    Ntango tosaleli basusu lokola bazali na esika ya lolenge bakoki kokoma, tokoki kokanga bango bakende liboso te. Na esika wana, tokoki kolimbisa mpe kobosana mabunga ya kala. Tokoki kondima ete basusu bakoki kobongwana. Tokoki kotika kotala botau mpe komona bilembo ya malamu oyo bakoki te komona na kati na bangomei. ”Tozali na mokumba ya komona bato te lokola bazali kasi lokola bakoki kokoma.”1

  6. Tika Bango Batambola Bango Moko

    Mbongwana ezwaka ntango. Tosengeli banso “kokoba na bompikiliki kino [biso] tokobonga nie” (Doctrine et Alliances 67:13). Yesu azalaki na bompikilikinana basusu mpe akobaki koteya kutu baoyo batelemelaki Ye, kotatolaka ete mosala na Ye epesamelaki Ye na Tata na Ye mpe koyanolaka mituna na bango (tala Matai 12:1–13; Yoane 7:28–29). Tokoki kozala na bompikiliki na basusu mpe kolendisa bango bazala na bompikiliki na bangomei.

  7. Botika Te Soki Bazongeli Banzela ya Kala

    Nsima ya liwa ya Klisto, kutu Petelo mpe boko ya Bapostolo mosusu bazongelaki nini oyo bamesanaki na yango (tala Yoane 21:3). Klisto akundolisaki Petelo ete asengelaki “koleisa bana ya mpate [na Ye]” (tala Yoane 21:15–17), mpe Petelo azongelaki mosala. Ekoki kozala mpenza pete kozongela banzela ya kala. Tokoki kokoba kosunga na bolendisi ya boboto mpe mabengisi efulama mpo na kokoba kolanda Mobikisi mpe kobunda kokoma lokola Ye.

Bopesa nzela na Basusu Bakola

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga likoki ya Baposolo Zomi na mibale abeti lisolo etali kopesaka nzela na basusu bakola: “balobelaki ngai mbala moko lisolo etali elenge mobali moko oyo mibu mingi azalaki mbala mingi to moke mama ya likambo ya maseki nyonso kati na eteyelo. Azalaka na ndambu ya botau, mpe ezalaki pete mpo na baninga na ye batumbula ye. Nsima na bomoi na ye akendaki esika mosusu. Na nsuka akotaki na mampinga mpe ayekolaka mwa makambo ya elonga kuna na koyekolaka mpe mingimingi na kotikaka makambo na ye ya kala. Ya ntina mingi, lokola esalaka basoda mingi, amonaki kitoko mpe limpompo ya Eklezia mpe akomaki makasi mpe na esengo kati na yango.

“Nde, nsima ya mibu ebele, azongaki na engumba ya bolenge na ye. Mingi ya nkola na ye balongwaki na mboka kasi banso te. Na kotala, ntango azongaki na mwa elonga mpe mwa ya sika, lolenge kaka ya kala oyo ezalaki liboso ezalaka naino kuna, kozelaka bozongi na ye. Na bato ya engumba na ye , azalaki kaka ‘songolo.’ ya kala …

“Moke moke bokasi ya Paulo ya moto mpo na kotika oyo ezalaki kala mpe kokanga motuya oyo Nzambe atiaka liboso na ye ezalaki kokita malembe malembe kino akufaki pene na lolenge azalaki na bolenge na ye. … Mabe mpenza, mawa mpenza ete azingama lisusu na … baoyo bakanisaki kala na ye ezalaki na litomba koleka oyo ekoya na ye nsima. Balongaka kobakola na maboko na ye oyo na ntina na yango Klisto akangelaki ye. Mpe akufaki na mawa, atako na nzela ya mwa libungi ya ye moko.…

Tika bato bayambola. Tika bato bakola. Bondima ete bato bakoki kobongwana mpe kosala malamu.”2

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Tala Basusu lokola Bakoki Kokoma,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2012, 69.

  2. Jeffrey R. Holland, “The Best Is Yet to Be,” Liahona, sanza ya yambo 2010, 19, 20.