2019
Ntina Oyo Ekobongola Lisalisi na Biso
Sanza ya Yambo 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Yambo 2019

Ntina Oyo Ekobongola Lisalisi na Biso

Ntango bantina ya kosalisa ezali ebele, babokasi na biso esengeli kokambama na mposa ya kosalisa basusu bakokisa mbongwana na bango mpe bakoma mingi lokola Mobikisi.

Ntango tolingi basusu lokola Mobikisi alingi, tolingi tosalisa bango lokola Alingaki. Lokola Mobateli Mpate Malamu, azali ndakisa ya nsuka ya lisalisi ya ntina.

Na kokokanisaka lisali na biso elongo na oyo ya Ye, ezali ntina tomikundola ete babokasi na Ye ya kolinga, kotombola, kosunga, mpe kopambola ezalaki na ntina monene koleka mposa ya mbala kata. Ya solo Ayebaki bamposa na bango ya mokolo na mokolo mpe mawa na mpasi na bango. Solo Akangolaki, aleisaki, alimbisaki, mpe ateyaki. Kasi Alingaki kosala ebele koleka kolengela mposa ya mokolo (tala Yoane 4:13–14). Alingaki baoyo bazalaki nzinganzinga na Ye balanda Ye (tala Luka 18:22; Yoane 21:22), ayebi Ye (tala Yoane 10:14; Doctrine et Alliances 132:22–24), mpe akokisi ntina na bango ya bonzambe na bango (tala Matai 5:48). Lolenge moko ezali solo lelo (tala Doctrine Alliances 67:13).

Tozali na ndenge ebele oyo tokoki kosunga kopambola basusu, kasi ntango ntina ya nsuka ya lisalisi na biso ezali ya kosalisa basusu bayeba Mobikisi mpe bakoma mingi lokola Ye, tokosala na mokolo ntango tokolinga te kotangisa mozalani na biso ayeba Nkolo mpo ete banso tokoyeba Ye (tala Yelimia 31:34).

Ntina Monene ya Mobikisi Elekaki Bamposa ya Mbalakaka

  • Bato ebele basalaki makasi na bango mpo na komema moninga na bango epai ya Yesu mpo abika na maladi ya paralizi. Na nsuka Mobikisi akangolaki moto oyo, kasi Amitungisaki mingi na kolimbisaka ye na masumu (tala Luka 5:18–26).

  • Ntango bato bamemaki epai ya Mobikisi mwasi oyo asalaki ekobo, bozangi etumbu na ye epesaki ye lobiko ya nzoto. Kasi alingaki kobikisa ye mpe, ayebisi ye “kende, mpe kosumuka lisusu te” (tala Yoane 8:2–11).

  • Maliya mpe Malata batindaki liloba epai ya Yesu kosengaka Ye aya mpo na kobikisa moninga na Ye, Lazalo. Yesu, oyo abikisaki basusu na mabaku ebele, awumisaki koya na Ye kino Lazalo akufaki. Yesu ayebaki ete libota elingaki, kasi na bosekuisi Lazalo uta na liwa, Alendisaki matatoli na bango ya bonzambe na Ye (tala Yoane 11:21–27).

Bandakisa misusu nini okoki kobakisa na mokanda oyo?

Tokoki Kosala Nini?

Soki ntina na biso ezali ya kosalisa basusu bakoma mingi lokola Mobikisi, ekobongola lolenge ya kosalisa. Oyo ezali ndenge bososoli oyo ekoki kokamba babokasi na biso na lisalisi.

Likanisi 1: Kangisa mosala na Mobikisi

Babokasi na biso nyonso ya kosala bolamu ezali ntina, kasi tokoki koluka mabaku ya kobongisa mosala na biso na kokangisaka yango na Mobikisi. Ndakisa, soki libota oyo ozali kosalisa ezali maladi, bilei ekozala ntina, kasi ndakisa na yo ya bolingo ekoki kobakisama na litatoli ya Mobikisi mpo na bango. Lisungi na yo ya kosalisa na lopango akoki kozala malamu, kasi ntango mosusu ekoki kozala malamu mingi koleka elongo na libonza ya lipamboli ya bonganganzambe.

Mpaka Neil L. Andersen ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale ateyaki: “Moto ya motema malamu akoki kosunga moto moko abongisa pine, komema mofuteli epai ya dokotolo, kolia elongo na moto ya mawa, to koseka mpe kopesa mbote na bongengi ya mokolo.

“Kasi motosi ya mobeko ya yambo akobakisa na pete ntina oyo ya misala ya lisalisi.”1

Likanisi ya 2: Kotikala na Nzela ya Boyokani

Kolobelaka bandimi mpo na mbala ya yambo ntango Mokambi ya Eklezia, Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Tikala na Nzela ya Liyokani.” Kobatelaka mpe kotosa mayokani “ekofungola ekuke na lipamboli nyonso ya molimo mpe libaku malamu.”2

Lokola Basantu ya mikolo mya Nsuka, tobatisami, tokotisami, mpe tozwi likabo ya Molimo Mosantu. Mibali balongobani bazwaka bonganganzambe. Tokendaka na tempelo mpo na dotasio na biso mpe tokangisamaka elongo lokola mabota ya seko. Makuli ya lobiko oyo mpe mayokani elongo na yango ezali ntina mpo na biso mpo tokoma lokola Ye na ntina ete tozala elongo na Ye.

Tokoki kozala na mokumba monene ya kosala na kosalisaka basusu na nzela oyo ntango tosalisi bango babatela mayokani na bango mpe balengela kosala mayokani oyo ekoya lobi.3 Lolenge nini okoki kosunga basusu to mabota oyo osungaka mpo na kozwa likuli oyo ekoya lobi oyo basengeli? Yango ekoki kolakisa kosungaka kolengela tata na libatisi ya mwana na ye ya mwasi, kolimbolaka mapamboli ya liyokani oyo ekoya lobi, to kokabolaka ndenge mpo na kozwa boyebi ya ntina ya kokomisa sika mayokani na biso na ntango ya bolei elambo.

Likanisi ya 3: Bengisa mpe Lendisa

Ntango ezali malamu, pesa toli na baoyo olengelaka na ntina ya mbongwana na bango mpe babokasi na bango mpo bakoma lokola mingi lokola Klisto. Tika bayeba babokasi ozali komona mpe kosepela epai na bango. Tala esika nini bamimoni ete bakoki kobongwana mpe solola na ntina nini okoki kosunga. (Mpo na mingi na ntina ya bosololi elongo na baoyo osalisaka, tala “Solola na ntina ya Bamposa na Bango,” Liahona, Sanza ya libwa. 2018, 6–9.)

Kobanga te kobengisa bango balanda Mobiksi mpe bapesa Ye ndingisa ya kosunga bango bakokisa ntina na bango ya bonzambe. Libiangi oyo ekoki kozala mbongwana ya bomoi, ntango esangani elongo na ndakisa ya elikia na yo epai na bango mpe bondimi na yo epai na Ye.

Ndenge Motoba Tokoki Kosunga Basusu Bakoba epai ya Yesu

Kolandaka ezali mabongisi mpo na kosunga basusu na kosalaka mbongwana na bomoi mpe kokobaka na nzela ya liyokani. (Tala Precher mon Evangile, chapitre 11, mpo na makanisi ebele.)

  1. Kokabola. Zala sembo mpe na mpiko na ntango ya kokabolaka lolenge nini Mobikisi asungaki yo ntango omekaki koyekama pene na Ye na kosalelaka mibeko ya nsango malamu kasi oboyaki te.

  2. Mapamboli Elakelama. Moto alingaka alonga ya kobongwama oyo ezali ntina koleka bantina oyo ebongwanaka te. Kolimbolaka mapamboli elongo na mosala ekoki kopesa nguya (tala Doctrine et Alliances 130:20–21).

  3. Bengisa. Kosalelaka mabongi ya nsango malamu ememaka litatoli oyo ezali solo (tala Yoane 7:17) mpe akambi na mbongwana ya bozindo.4 Pene ya mokangano nyonso ekoki kozala na libiangisi ya kosala eloko oyo ekoki kosunga bango bakoba.

  4. Bomilengela elongo. Nini esengeli kosalema mpo na bango mpo ete babatela mpenza liyokani ya kobongwana? Lolenge nini okoki kosunga? Manaka mpe ezali ntina?

  5. Lisungi. Soki ezali ntina, kolisa mokangano ya ya bato oyo bakoki kosunga basusu batikala na kondima mpe elonga. Tozali banso na bosenga ya lisungi.

  6. Landela. Kabola bokoli mbala na mbala. Tikala ngwi na moango, kasi bongwama lisusu soki ezali ntina. Zala na motema ya kokita, na bompikiliki, mpe bolendisi. Mbongwana ekoki kozwa ntango.

Libiangi ya Kosala

Tala ndenge babokasi na yo ya kosalisa—nyonso mibale na bonene mpe moke—ekoki kosunga basusu na bozindo na oyo etali mbongwana na bango mpe bakoma mingi lokola Mobikisi.

Matangi

  1. Neil L. Andersen, “A Holier Approach to Ministering” (Brigham Young University devotional, Apr. 10, 2018), 3, speeches.byu.edu.

  2. Russell M. Nelson, “As We Go Forward Together,” Liahona, Sanza ya minei. 2018, 7.

  3. Tala Henry B. Eyring, “Daughters in the Covenant,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 125–28.

  4. Tala David A. Bednar, “Converted unto the Lord,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 106–109.