2018
Bosololi Oyo Bolengelaka
Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi na mibale 2018


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi na mibale 2018

Bosololi Oyo Bolengelaka

Ezali na banzela ebele oyo tokoki kolakisa ete tolengelaka, mingi mingi ntango ya Noele. Tokoki koloba yango, kokoma yango, kopesa yango, kokabola yango, kosambela mpo na yango, kotumba yango, koyemba yango, koyamba yango, kosakana na yango, kolona yango to kosokola yango. Bobele meka yango.

Kolakisaka bolingo na basusu ezali mpenza kosalisa ewuti na motema. Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama basungi Jean B. Bingham alobaki: “Kosalisa ya solo ekokisamaka na moko na moko na bolingo lokola bolendisi. … Na bolingo lokola bolendisi, bikamwa ekosalema, mpe tokozwa makoki ya komemela bandeko na biso ya mibali mpe basi ‘babunga’ kati ya nsango malamu ya solo ya Yesu Klisto.”1

Kotika basusu bayeba ete tolengelaka ezali eloko ya ntina ya botomboli kimoninga ya moto yemoko. Kasi batu ebele bazwaka nsango na lolenge ya kokesena. Na yango lolenge nini tokoki kolakisa malamu bolingo na biso na basusu na ndenge bakososola mpe bakosepela? Oyo ezali mwa banzela ya bosololi oyo tolengelaka, elongo na mwa makanisi ya kobandela likanisi na yo moko.

Loba yango

Mbala mosusu eloko moko te ekozwa esika mpo na koloba oyo ozali kokanisa mpo na moto mosusu. Ntango yango ekoki kozala koyebisaka bato ete olingaka bango, ezali lisusu kokokisaka oyo osepelaka na oyo etali bango to koloba maloba malamu. Lolenge ya bondimi oyo esungaka mpo na kolendisa kimoninga. (Tala Baefese 4:29.)

  • Zwa libaku ya koyebisa bato bayeba boniboni osepelaka na moko ya babokasi na bango.

  • Tika naino, benga, to tinda email, mokanda, to kalati kolobaka na bato okanisaka bango.

Botali

Kozwaka ntango ya kosolola mpe koyokela moto moko ezali lolenge moko ya motuya ya kolakisa lolenge nini opesaka ye ntina. Atako okendaka kotala na libota, na eklezia to esika songolo, ezali na bato ebele oyo bazali na mposa ya moto oyo bakoki kosololana ye. (Tala Mozia 4:26; D&A 20:47.)

  • Engebene na bamposa ya moto, tia pologalami ya botali. Zwa ntango ya koyoka mpenza mpe kososola mabaku na ye.

  • Esika oyo ekoki kozala mpasi mpo na botali na mabota mpo na mosika, makambo ya bonkoko, to mabaku misusu, zwa ntango elongo nsima ya mayangani ya Eklezia.

Salisa na Ntina moko

Zala na makanisi na ntina ya bamposa ya moto to libota. Kosalisa na lolenge elongobani elakisaka ete ozali kolengela. Esangisaka mabonza ya ntango mpe likoki ya ntina. “Masalisi ya misala mike ezali na ntina na miso ya basusu,” elobaki Ndeko Mwasi Bingham.2

  • Pesa lisungi oyo elendisaka bato to mabota na bango, lokola kotalaka bana boye baboti bakoki kokende na tempelo.

  • Luka ndenge ya kolembisa mikumba ntango bomoi ekomi mpasi, lokola kopangusa bafenetele, kotambola na mbwa, to kosungaka libanda ya lopango.

Bosala Makambo Elongo

Ezali na bato oyo bamipesaka na masolo na bozindo te. Mpo na bato mosusu, bomipesi esalemaka na bokutani na matomba na bango mpe kolekisaka ntango elongo na kosalaka makambo yango. Nkolo alobaki ete to “zala elongo mpe tolendisa” (D&A 20:53) bandeko na biso ya mibali mpe basi.

  • Botambola, bosakana na butu, to botia ntango ya kosakana elongo mbala na mbala.

  • Bosalisa elongo na lingomba to na molulu ya Eklezia.

Pesa Likabo

Mbala mosusu ntango to mabaku ya kosala ezalaka mokuse. Na babonkoko ebele, kopesaka makabo ezali elembo ya mawa mpe bolengeli. Atako na libaku, likambo ya mpamba ekoki kolakisa litomba na yo ya kotonga kimoninga moko malamu. (Tala Masese 21:14.)

  • Bolia elubu kitoko.

  • Bokabola lisolo, likomi, to nsango mosusu oyo bomoni ekoki kozala litomba.

Mosala ya Bolingo

Ntango bosili koyeba baoyo bosalisaka mpe oyo bolukaka lifuli, bokoyekola koleka lolenge nini ya kolakisa bolingo na bino mpe bolengeli epai na bango moko.

Kimberly Seyboldt ya Oregon, USA, abeti lisolo ya kolukaka lifuli mpe kopesaka makabo mpo na kolakisa bolingo:

“Ntango namonaka bomoi komema ngai na nse, natelemaka mpe nasali lipa, mingi mingi nasalaka yango mwambe. Epise na ngai ya ntina ezalaka losambo ya kimia nasalaka ntango natumbaka mpo na kokoka koyeba nani azali na mposa ya mapa oyo. Nakoki koyeba sikoyo malamu bazalani na ngai ya nzinganzinga, mpo ete lipa ya moto ezalaki libiangi na ngai na kati ya mabota mpe babomoi na bango.

“Mokolo moko ya molunge na eleko ya molunge, natelemaki na liboso ya libota moko kotekaka bikolo ya mbuma na ngambo ya nzela. Nazalaki na mposa ya bambuma te, kasi elenge mobali esika boteki azalaki asepelaki mpenza na komona ngai, kokanisaka nazalaki kiliya na ye. Nasombaki mwa bambuma, kasi nazalaki lisusu na libonza mpo na ye. Napesaki mwana mobali mapa mibale. Azongaki epai ya tata na ye mpo na kondima, nsima alobaki, ‘Tala, Papa, sikawa tozali na eloko ya kolia lelo oyo.’ Natondisamaki na esengo mpo na libaku wana ya kolakisa bolingo na lolenge ya pete.”

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale, asengaki “ete mobali mpe mwasi nyonso—mpe bilenge mibali na biso mpe bilenge basi—ba [kozala] … na komipesa makasi na motema na bango bamitungisa mpo na moko na moko, bamipesi na bolingo ya peto ya Klisto mpo na kosala yango. … Tika ete tosala elongo na Nkolo na elanga ya vino, kopesaka Nzambe mpe Tata ya biso nyonso loboko ya lisalisi elongo na mosala na ye ya ntina ya koyanolaka nsambo, kopesaka bolendisi, kokawusaka mpinzoli, mpe kolendisaka mabolongo elembi.”3

Yesu Klisto Alengelaka

Nsima ya bosekwisi Lazalo na Yesu Klisto uta na nkufa, “Yesu alelaki.

“Nsima alobaki na bayuda, Tala lolenge nini nalingaki ye!” (Yoane 11:35–36).

“Nazali na mawa likolo na bino,” Klisto alobaki na Banefi. Nsima abengaki babeli na bango mpe babotau, babosono mpe bakufi miso, mpe “akangolaki bango” (tala 3 Nefi 17:7–9).

Mobikisi apesaki ndakisa mpo na biso amitungisaki mpo na moko na moko. Ye ateyaki biso.

“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na mayele na yo mobimba.

“Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo ya liboso.

“Mosusu ya mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko” (Matai 22:37–39).

Nani azali na mposa ya bolengeli na yo? Lolenge nini okolakisa bango oyo olengelaka?

Matangi

  1. Jean B. Bingham, “Ministering as the Savior Does,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 106.

  2. Jean B. Bingham, “Ministering as the Savior Does,” 104.

  3. Jeffrey R. Holland, “Be With and Strengthen Them,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 103.