2018
Kozwa Lisungi mpona Kosunga Basusu
Sanza ya Zomi 2018.


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi 2018

Kozwa Lisungi mpona Kosunga Basusu

Lolenge nini tokotisaka basusu ntango tosengeli na lisungi na bokasi na biso mpo na kosalisa? Kozala kati ya bosololi ya kosalisa mpe mayangani ya masolo ya Eyenga ya yambo.

Ntango mabende ebele ezingaki Kathy na kiti na ye ya kopusa, amonaki azalaki na posa ya lisungi butu nyonso mpo na kokita na kiti na ye kino na mbetu. Mosala ezalaki monene mpo na mondimi moko. Na yango bampaka ya lisanga likoki basololaki na ntina ya likambo na ye mpe bazwaki mokano ya kosala pologalami ya kosunga ye pokwa nyonso.1

Ntango toyei koyeba bamposa mpe babokasi ya basusu oyo tosungaka, tokoki komona ete tosengeli na lisungi mpo na kosalisa bamposa na bango. Bosololi ya Kosalisa mpe mayangani ya Eyenga ya yambo ezali mabaku mibale mpo na kosolola na lolenge nini ya kosalisa basusu malamu.

Lisolo ya Kosalisa

Masolo oyo ya basanza misato sima kati ya bandeko basi basungi mpe Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to bandeko mibali basungi mpe bokambi ya bampaka ya lisanga likoki ezali bobele lapole elongobani oyo tosalaka mpo na baoyo tosungaka. Lisolo ezali libaku malamu na ntina ya basanza misato eleki (1) bosangani na ntina bokasi, bamposa, mpe mitungisi ya libota moko mpe bato; (2) elakisaka bamposa nini lisanga likoki, Lingomba ya Bamama Basungi, to palwasi esengeli kosunga na yango; mpe (3) boyekola uta na bakambi mpe bolendisama na kosungaka makoki.

Bampaka ya bokambi ya lisanga likoki mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi basolola elongo mpo na bamposa epai ya episikopo mpe bazwa toli mpe bokambi uta na ye.

Bokoki kozwa nsango ebele na ntina ya lisolo ya kosalisa na ministering.lds.org.

Kosalaka Masolo ya Kosalisa Ntina Koleka

Na kosungaka lisakola ya Mokambi Russell M. Nelson ete pologalami ya kosalisa ekozala likambo ya ntina koleka oyo Eklezia ekotalela mingi, Mpaka Gary E. Stevenson ya Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale alobaki, “Bosaleli ya limoni na ye … ekozala engebene na lolenge nini kosunga bandeko mibali mpe basi bateyami malamu mpe bomipesi na lisolo ya kosungaka.”2

Bitape mitano mpo na kosalisa bandeko mibali mpe basi:

  • Bosolola mpo na koluka toli. Milengela mpo na koyekolo.

  • Bozala ya komilengela mpo na kosolola bamposa oyo bokoki kozala na yango mpo na lisungi ya kosalisa.

  • Boyekama na babokasi ya bato mpe makoki na bango, botala kaka bamposa te.

  • Bosolola na ntina ete litomba ya lisungi na bino ezwaki elonga.

  • Bokutana na mokambi mpo na kosolola na kati ya basanza misato eleki lokola esengelamaki.

Bitape mitano mpo na bakambi:

  • Masolo esengeli te kozala molai, kasi bosala pologalami ya ntango ekoki mpo na kotala na esika oyo epesi nzela mpo na lisolo ya ntina.

  • Bozwa libaku malamu mpo na kosalisa na lisungi ya ndeko mobali to mwasi.

  • Botuna mituna te oyo emonisaka lokola bozali kosala motango ya botali to koluka koyeba nyonso (“Osalaki lisalisi na yo?”). Botuna mituna lokola oyo elendisaka mposa ya bizalela (“Botindiki nini oyokaki ntango osambelaki mpo na libota songolo? Nini esalemaki ntango osalaki botindiki ya molimo wana?”).

  • Yoka na bokebi mpe koma.

  • Bosolola elongo. Kimoninga ya lisungi basengeli na emoniseli mpo na baoyo batindami kosalisa.

Mituna mpe Biyano na ntina Masolo ya Kosalisa

Nini ezali lisolo ya kosalisa?

Ezali bosololi ya lisalisi ya bandeko mibali mpe moko ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka to ya lisalisi ya bandeko basi moko ya bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na kotiaka na esika oyo ekoki kopesa bango ndingisa bazwa lifuli uta na Molimo Mosantu. Lokola mbano, lisalisi ya bandeko mibali mpe basi ekoki kofulama na bobateli, bolingo, liteya, mpe bolendisi na lolenge ya Mobikisi.

Masolo ya basanza misato oyo eleki esengeli kosalema na moto?

Lokola bakambami na moto, kasi ekoki kotambwisama na telefone to na nzela ya eterneti ntango bokutani ezali mpasi. Mbala mingi, baninga mibale bakoki kozala na bosololi ntango esengeli.

Nini ezali ntina ya lisolo ya kosalisa?

Masolo ya kosalisa ezali libaku malamu mpo na kosunga bandeko mibali mpe basi batala mabaku ya sikawa, kosala miango ya lobi ekoya, kosunga bato to mabota oyo bazali kosalisa. Ezali libaku malamu kosolola na ntina ya makoki oyo lisanga likoki mpe Lingomba ya Bamama Basungi ekoki kopesa.

Lolenge nini nakosala na likambo ya sekele to mpasi?

Bandeko mibali mpe basi ya lisungi bakabolaka nsango ya sekele kaka elongo na bampaka ya lisanga likoki to Mokambi ya Lingomba ya Bama ma Basungi—to kaka na episikopo. Nsango ya sekele to ya mpasi esengeli te kokabolama na lisanga ya mayangani ya Eyenga ya yambo.

Mayangani ya Eyenga ya Yambo

Na kobakisa na masolo ya Kosalisa, mayangani ya Eyenga ya yambo ezali lolenge mosusu mpo na kosunga basusu na lisalisi. Na Lingomba ya Bamama Basungi mpe bampaka ya lisanga likoki, lifuli ekoki koya na baoyo bazali kati ya nzela ya Molimo mpe uta na baoyo bazali na lingomba.

Litomba ya lisolo ya bokutani ezali ya:

  • “Kosolola elongo na ntina ya mikumba ya bisika, mabaku, mpe mitungisi;

  • “Koyekola uta na mayele ya basusu mpe boyebi na bango; mpe

  • “Kolengela nzela mpo na kosala na makambo ezwamaki uta na Molimo.”3

Mayangani ya lisanga ezali mingi koleka masolo: mayangani ekambaka biso na mosala ntango bato to lokola lingomba oyo efulama na Molimo. Bandimi bakoki koyoka mposa ya kosukisa mosala ya Nkolo lokola litomba ya mayangani oyo.

Libiangi ya Kosala

“Losambo na biso lelo,” elobaki Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale, “ezali ete mobali mpe mwasi—mpe bilenge mibali na biso mpe bilenge basi—ba [kozala] na komipesa makasi na motema na bango bamitungisa mpo na moko na moko, bamipesi na bolingo ya peto ya Klisto mpo na kosala yango.”4

Matangi

  • Tala Mormon Messages video “Lift,” lds.org/media-library.

  • Gary E. Stevenson, kati ya “Bosololi ya Lisungi” (video), ministering,lds.org.

  • Come, Follow Me—For Melchizedek Priesthood and Relief Society, na Ensign or Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 140; lisusu na comefollowme.lds.org.

  • Jeffrey R. Holland, “Be With and Strengthen Them,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 103.