2018
Kotongaka Kimoninga ya Ntina
August 2018


Elilingi
Ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Mwambe 2018

Kotongaka Kimoninga ya Ntina

Likoki na biso ya kolengela basusu emataka ntango tozali na kimoniga ya ntina elongo na bango.

Libiangi ya kosalisa basusu ezali libaku ya kotonga kimoninga ya bolingo elongo na bango—lolenge ya kimoninga oyo ekosala ete babanga te kosenga to kondima lisungi na biso. Ntago tosali makasi ya kokolisa kimoninga ya lolenge wana, Nzambe azali na makoki ya kobongola babomoi na ngambo mibale ya kimoninga.

“Nandimelaka solo ete ezali na mbongwana ya ntina te ezanga kimoninga ya ntina,” elobaki Sharon Eubank, Mopesi toli ya Yambo na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. Mpe mpo ete bikela na biso ya mosala ebongwanisa babomoi ya basusu, alobaki, esengeli kozala “kouta na mposa ya sembo mpe solo ya kobikisa mpe koyoka mpe koyokana mpe kotosa.”1

Kimoninga ya ntina ezali takitiki te. Etongamaka na mawa, bokasi ya sembo mpe solo, mpe “bolingo ya kotatabana te” (D&A 121:41).2

Ndenge ya Kotonga mpe Bokasi ya Kimoninga

“Totongaka [kimoninga] moto moko na mbala moko,” elobaki Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.3 Wana ezali biso koluka kotonga kimoninga ya ntina elongo na baye tosalisaka, Molimo Mosantu akoki kokamba biso. Makanisi oyo elandi eyekami na ndakisa Mpaka Uchtdorf apesaki.4

  • Boyekoli na ntina na yango.

    Mokambi Ezra Taft Benson (1899–1994) ateyaki, “Bokoki kosalisa malamu te baye boyebi malamu te.” Alingaki koloba koyeba bankombo ya moto ya libota moko na moko mpe koyebaka milulu ya ntina lokola bamikolo ya mbotama, mapamboli, mabatisi, mpe mabala. Yango epesaka libaku ya kokoma mokanda to kobenga mpo na kopesa longonia na moye libota moko na ntina ya elonga ya kafukafu.5

  • Kolekisa ntango elongo.

    Kimoninga ezwaka ntango mpo na kokola. Luka mabaku mpo na kobatela bosololi to bokutani. Boyekoli etalisaka ete kotika bato bayeba ete bomitungisaka mpo na bango ezali ntina na kimoninga ya kolongono.6 Kotalaka mbala mingi elongo na baoyo bobiangemi mpo na kosalisa. Kosoloka elongo na bango na eklezia. Kosala bantina nyonso oyo ekoki kosalisa—lokola email, Facebook, Instagram, Twitter, Skype, kobenga na telefone, to kotinda kalati. Mpaka Richard G. Scott (1928–2015) ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alobaki na ntina ya nguya ya bandakisa ya pete mpe ya bokeli ya bolingo mpe lisungi: “Mbala mingi nazalaki kofungola makomi na ngai, … mpe nazalaki komona nkoma moko ya bolendisi, ya lisungi [mwasi na ngai] Jeanene atiaka kati na nkasa. … Matangi wana ya motuya … ekobi kozala eloko ya motuya ya ntalo mpenza ya bolendisi mpe bofuli.”7

    Lisusu, bomikundola ete kimoninga ezwaka mibale. Bokoki kolakisa bolingo mpe kimoninga, kasi kimoninga ekokola te longola se soki likabo endimami mpe ezongisami. Soki moto mosusu azali lokola mpasi, boluka na makasi kimoninga te. Pesa ye ntango na kolakisaka babokasi na bino ya sembo mpe solo, mpe soki esengeli , bosangana elongo na bakambi na bino na ntina ya koyeba soki to te kimoninga ya ntina ezali naino komonana lokola ekoki kosalema.

  • Bosolola na bokebi.

    Kotongaka kimoninga ya ntina esengaka biso tokende koleka makambo ya likolo likolo. Bosololi ya likolo likolo etondisami na masolo ya mikolo nyonso etali manaka, eleko, mpe makambo mosusu ya mike, kasi ezalaka na bokaboli ya mayoki, boyambi, bantina, mpe bamposa te ebongi mpo na kosala mikangano ya ntina koleka. Tata ya Lola alakisaki ndakisa ya lolenge ya bosololi ya ntina mingi koleka oyo na kokabolaka mayoki mpe miango na Ye elongo na Mwana na Ye (tala Yoane 5:20) mpe elongo na biso na nzela ya baprofeta na Ye (tala Amosa 3:7). Na kokabolaka makambo ya mokolo na mokolo mpe mikakatano ya bomoi na moko na mosusu lokola tokambami na Molimo, tozwaka bosepeli mpo na moko na mosusu ntango tomonaka matomba oyo tokokani na yango mpe mayebi oyo tokabolaka.

    Koyokaka ezali eteni ya motuya ya bosololi oyo bozali kozwa na bokebi.8 Ntango bozali koyoka na bokebi, libaku na bino ya kosunga basusu baya epai na Klisto ekomata wana ezali bino kozwa bososoli mpe bomoni ya bamposa na bango mpe wana ezali bango koyoka bolingo, bososoli, mpe bobatelami.

  • Bosepela na babokeseni mpe bokokani.

    “Basusu … bakanisaka ete Eklezia elingaka kosala bandimi nyonso bakanisa lolenge moko—ete moto nyonso asengeli kotala, koyoka, kokanisa, mpe kotambola lokola moto nyonso mosusu,” elobaki Mpaka Uchtdorf. “Yango ezali lokola kotambwisa mokili lolenge Nzambe akeli yango te, Ye oyo akelaki moto nyonso ya kokesena na ndeko na ye. …

    “Eklezia elukaka ntango tosepeli na bokeseni oyo mpe tolendisani moko na mosusu mpo na kokolisa mpe kosalela batalanta na biso mpo na kotombola mpe kolendisa baninga bayekoli na biso.”9

    Kolinga basusu na lolenge Nzambe alingaka biso esengaka ete tomeka komona basusu lolenge Nzambe amonaka bango. Mokambi Thomas S. Monson (1927–2018) ateyaki, “Tosengeli komatisa likoki ya kotala [basusu] te lokola bazali sikawa kasi lokola bakoki kokoma.”10 Tokoki kobondela mpo na lisungi kotala basusu lolenge Nzambe azwaka biso. Ntango tozwi baninga mosusu koyekamaka na na makoki na bango mpo na bokoli, bazali na makoki ya kotelema ya koyamba libaku yango.11

  • Bosalisa bango.

    Bozala na liyoki ya mposa ya basusu oyo bozali kosalisa mpe bozala na bolingi ya kopesa ntango na bino mpe batalanta, atako na ntango ya mposa to mpe kaka mpo bozali kolengela. Bokoki kozala wana mpo na kopesa bolendisi, lisungi, mpe lisalisi esengeli ntango mposa makasi, maladi, to likama ezali. Kasi na kimoninga mingi mabe tozali mpo na kozongisela. Nzambe apesi biso likoki ya kosala koleka kosalelama (tala 2 Nefi 2:14). Bobele kaka lokola Apostolo Yoane ateyaki ete tolingaka Nzambe mpo ete Ye nde alingaki biso yambo (tala 1 Yoane 4:19), ntango basusu bayokaka bolingo na biso ya solo na nzela ya misala na biso ya lisungi, ekoki kolembisa mitema mpe komatisa bolingo mpe bondimi.12 Yango ekelaka ndakisa ya misala ya boboto oyo ekoki kotonga kimoninga.

Kosalisa lokola Mobikisi Asalaki

Yesu Klisto atongaki kimoninga ya ntina elongo na bayekoli na Ye (tala Yoane 11:5). Ayebaki bango (tala Yoane 1:47–48). Alekisaki ntango elongo na bango (tala Luka 24:13–31). Nsango na Ye etombwamaki likolo ya nyonso (tala Yoane 15:15). Asepelaki na babokeseni na bango (tala Matai 9:10) mpe alakisaki bokasi na bango (tala Yoane 17:23). Asalisaki moto nyonso, atako Azalaki Nkolo ya banso, kolobaka Ayaki te mpo ete basalisa ye kasi mpo na kosalisa (tala Malako 10:42–45).

Nini bokosala mpo na kotonga kimoninga elenda koleka elongo na baoyo obiangemi mpo na kosalisa?

Matangi

  1. Sharon Eubank,ina “Humanitarian Acts Must Be Rooted in Relationship, Sharon Eubank alobi,” mormonnewsroom.org.

  2. Tala “Mabongi ya Kosalisa: Kosunga na Mawa,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2018, 6–9.

  3. Dieter F. Uchtdorf, “Of Things That Matter Most,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2010, 22.

  4. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Of Things That Matter Most,” 22.

  5. Ezra Taft Benson, “To the Home Teachers of the Church,” Ensign, Sanza ya Mitano 1987, 50.

  6. Tala Charles A. Wilkinson mpe Lauren H. Grill, “Expressing Affection: A Vocabulary of Loving Messages,” na Making Connections: Readings in Relational Communication, ed. Kathleen M. Galvin, 5th ed. (2011), 164–73.

  7. Richard G. Scott, “The Eternal Blessings of Marriage,” Liahona, Sanza ya Mitano 2011, 96.

  8. Tala “Mabongi ya Kosalisa: Makambo Mitano Bayoki Malamu Basalaka,” Liahona, Sanza ya Motoba 2018, 6–9.

  9. Dieter F. Uchtdorf, “Nkoma Mitano,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 59.

  10. Thomas S. Monson, “Tala Basusu lokola Bakoki Kokoma,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2012, 69.

  11. Tala Terence R. Mitchell mpe Denise Daniels, “Motivation,” na Handbook of Psychology, vol. 12, ed. Walter C. Borman and others (2003), 229.

  12. Tala Edward J. Lawler, Rebecca Ford, mpe Michael D. Large, “Unilateral Initiatives as a Conflict Resolution Strategy,” Social Psychology Quarterly, vol. 62, no. 3 (Sanza ya Libwa 1999), 240–56.