2018
Makambo Mitano Bayoki Malamu Basalaka
Sanza ya Motoba 2018


Elilingi
Two young women talking

Kosalelaka Mabongi, Sanza ya Motoba 2018

Makambo Mitano Bayoki Malamu Basalaka

Boyoki ya solo ekosunga yo oyeba lolenge nini ya kosalisa mpo na kokokisa bamposa ya molimo mpe nzoto ya basusu lokola Mobikisi akokaki kosala.

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alobaki: “Ntango mosusu kutu koyoka eleki koloba. … Soki tozali koyoka na bolingo, tokozala na mposa ya komitungisa te soki tokoloba nini. Ekopesamela biso—na Molimo.”1

Koyokaka ezali eloko tokoki koyekola. Koyokaka elakisaka bolingo na biso, esungaka biso totonga kimoninga makasi, mpe ebengisaka Molimo epambola biso na likabo ya bososoli oyo ekusunga biso tososola bamposa ya basusu.2 Oyo ezali ndenge mitano oyo tokoki kotombola lolenge na biso ya koyoka.

1.Pesa Bango Ntango

Bato ebele bazali na mposa ya ntango ya kosangisa makanisi na bango yambo baloba. Pesa bango ntango ya kokanisa mbala mibale yambo mpe nsima ya koloba eloko moko (tala Yakobo 1:19). Kaka mpo basilisi koloba elingi koloba te ete balobi makambo nyonso oyo bazalaki na yango mposa. Bobanga te mpo na kimia (tala Yobo 2:11–3:1 mpe Alma 18:14–16).

2. Bokeba

Tokanisaka mbangu koleka basusu ntango bazali koloba. Telemela lisenginya ya kosukisa to kokanisa liboso nini okoki koloba ntango bazali koloba (tala Masese 18:13). Na esika na yango, boyoka na likanisi ya bososoli. Eyano na yo ekozala malamu mpo ete ekolobelama na bososoli monene.

3.Bolimbola

Bobanga te mpo na kotuna mituna oyo elimbolaka eloko moko oyo bososolaki te (tala Malako 9:32). Ndimbola ekitisaka bozangi bososoli mpe elakisaka mbano na oyo elobamaki.

4. Bokanisa

Bozongela oyo oyokaki mpe lolenge nini ozali kososolisa basusu mpo na koyoka. Yango ekosalisa bango bayeba soki ezali kososola mpe kopesa bango libaku ya kolimbola malamu.

5. Boluka Boyokani

Ntango mosusu bokoki kondimela na oyo nyonso elobami te, kasi bondimela oyo ekoki kobebisa mayoki na bino te. Kozala malamu ekoki kosunga yo oboya mawa mpe nkanda (tala Matai 5:25).

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete tosengeli “koyekola koyoka, mpe koyoka mpo na koyekola uta na moto moko na moko.”3 Ntango tozali koyoka na likanisi ya koyekola na ntina ya basusu, okozala na esika malamu koleka mpo na kososola bamposa na bango mpe koyoka na lombango na lolenge nini okoki kolengela mpo na basusu nzinga nzinga na yo lokola Mobikisi akokaki kosala.

Koyokaka Ezali Bolingo

Lisolo moko ya Mpaka Holland elimboli nguya ya boyoki:

“Moninga na ngai Troy Russell abimisaki motuka na ye na malembe na garage na ye. … Ayokaki pine na ye ya nsima ematelaki mwa ngomba. … Abimaki kaka mpo na kokuta mwana na ye ya mobali ya ntalo mingi ya mibu libwa, Austen, alalaki elongi na nse na mabele. … Austen akufaki.

“Pongi ekimaki ye, akokaki kozwa kimia te, Troy azangaki libondisi. … Kasi kati na mopepe wana ya liwa eyaki makasi … John Manning. …

“Nayebi te solo na manaka kani John mpe moningi na ye ya moke bakendaki na libota ya Russel. … Oyo nayebi ezali ete na eleko ya eleko ya moi moke eleki Ndeko mobali Manning atandaki loboko mpe alobelaki lisolo ya mwa Austen ye moko. Lokola … ndeko mobali kati na nsango malamu asengelaki kozala, John azwaki bobele bonganganzambe mpe abatelaki yango mpo na Troy Russell. Abandaki na kolobaka ete, ‘Troy, Austen alingi yo ozongela na makoli na yo—lisusu na libanda ya basketball—na yango nakozala awa ntongo nyonso na 5:15. Zala ya kolengelama. …’

“‘Nalingaki kokende te,’ Troy ayebisaki ngai nsima, ‘mpo ete nazwaki ntango nyonso Austen elongo na ngai … Kasi John atiaki molende, yango wana nakendaki. Uta mokolo wana ya yambo nsima, tosololaki—to kutu nasololakimpe John ayokemelaki. … Yambo ezalaki mpasi, kasi na nsima ya ntango nasosolaki nazwaki makasi na ngai na lolenge ya [John Manning], oyo alingaki ngai mpe ayokelaki ngai kino na nsuka moi ebimaki lisusu na bomoi na ngai.’”4

Matangi

  1. Jeffrey R. Holland, “Witnesses unto Me,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2001, 16.

  2. Tala David A. Bednar, na “Panel Discussion” (worldwide leadership training meeting, Sanza ya zomi na moko. 2010), broadcasts.lds.org.

  3. Russell M. Nelson, “Listen to Learn,” Ensign, Sanza ya Mitano 1991, 23.

  4. Jeffrey R. Holland, “Emissaries to the Church,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2016, 62, 67.