2018
Lokola Tozali Nbaso Kokende Elongo Liboso
April 2018


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Minei 2018

Lokola Tozali Banso Kokende Elongo Liboso

Bandeko mibali mpe basi, namikitisi kozala elongo na bino na ntongo ya lelo. Mikolo minei eleki tokendaki kotika moto monene na bopemi, profeta ya Nzambe—Mokambi Thomas S. Monson. Maloba moko te ekoki kotia boyengebene na ntina mpe bonene ya bomoi na ye. Nakolingaka ntango nyonso kimoninga na biso na botondi mpo na oyo ateyaki ngai. Sikawa tosengeli kotala liboso na lobi ekoya na bondimi meke na Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo Eklezia oyo ezali ya ye.

Mikolo mibale eleki Bapostolo nyonso ya bomoi basanganaki na ndako ya likolo ya Tempelo ya Salt Lake. Kuna bazwaki ekateli ya lisanga, ya yambo, ya kobongisa lisusu Bokambi ya Yambo sikawa mpe, ya mibale, ete nasalela Nzambe lokola Mokambi ya Eklezia. Maloba ezangi mpo na koyebisa bino lolenge nini liyoki ezalaki ya kozala na Bandeko na ngai—Bandeko oyo basimbi bafungola nyonso ezongisama na nzela ya Profeta Joseph Smith na eleko oyo—batiaki maboko na bango na moto na ngai mpo na kokulisa ngai mpe kotia ngai pembeni lokola Mokambi ya Eklezia. Ezalaki likambo moko ya bule mpe ya bomikitisi.

Ekomaki sikawa mokumba na ngai ya kotia mpembeni banani Nkolo alengelaki mpo na kozala bapesi toli na ngai. Lolenge nini nakokaki kaka kopona mibale ya Bapostolo Zomi na mibale misusu, baoyo moko na moko nalingaka mingi mpenza? Nazali na botondi ya bozindo epai ya Nkolo mpo na koyanola na nsambo na ngai ya makasi. Nazali na botondi mpenza ete Mokambi Dallin Harris Oaks mpe Mokambi Henry Bennion Eyring bazali na bolingi ya kosalela Nzambe elongo na ngai lokola Bapesi toli ya Yambo mpe ya Mibale, na esika bazali. Mokambi Dieter F. Uchtdorf azongeli esika na ye kati ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale. Asi azwaki misala minene oyo azali se ye moko koyeba.

Napesi ye longonya mpe Mokambi Eyring mpo na mosala monene lokola bapesi toli ya Mokambi Monson. Bazalaki na makoki ya kokoka, bamipesaki, mpe bafulamaki. Tozali na botondi koleka mpo na bango. Moko na moko azali na bolingi ya kosunga sikawa na esika asengelami makasi.

Lokola Apostolo ya mibale na kimokolo, Mokambi Oaks akomi lisusu Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale. Na yango, mpo na libiangi na ye na Bokambi ya Yambo mpe engebene na mabongisi ya Eklezia, Mokambi M. Russell Ballard, alandi na kimokolo, akosalela Nzambe lokola Mokambi na Mosala ya lisanga likoki oyo. Bakambi ya Yambo bakosala mosala loboko na loboko elongo na Bazomi na mibale mpo na komanyola bolingi ya Nkolo mpe komema liboso mosala na Ye ya bule.

Totondi bino na nsambo na bino. Oyo bozali kosala mokili mobimba mpo na biso. Na ntongo nsima ya liwa ya Mokambi Monson, losambo moko esalemaki na elenge mobali moko ya mibu minei na nkombo ya Benson. Natangi mwa maloba ya mokanda mama na ye akomelaki mwansi na ngai, Wendy. Benson asambelaki, “Tata ya Lola, botondi mpo ete Mokambi Thomas S. Monson akoki komona mwasi na ye lisusu. Botondi mpo na profeta na biso ya sika. Sunga ye azala elombe mpe abanga te ete azali moto ya sika. Sunga ye azala na kolongono malamiu ya nzoto mpe makasi. Sunga ye azala na nguya mpo ete azali na bonganganzambe. Mpe sunga biso ntango nyonso tozala malamu.”

Natondi Nzambe mpo na bana ya boye mpe mpo na baboti oyo bazali komipesa mpenza mpo na kozala baboti ya bosembo, ya motema malamu—mpo na moboti nyonso, motei, mpe bandimi oyo azali komema mikumba ya bozito mpe azali kosalela Nzambe na bolingi nyonso mpenza. Na maloba misusu, mpo na moko na moko na bino, nazali na botondi ya komikitisa.

Nkolo Azali na Yenda

Lokola tozali kokende elongo liboso, nazali kobengisa bino bokanisa na ntina ya lolenge ya bokonzi na oyo Nkolo ayangelaka Ekklezia na Ye. Ntango Mokambi ya Eklezia akufi, ezali na mobombamo moko te na ntina ya nani akobiangema mpo na kosalela Nzambe na likoki wana. Maponami ezalaka te, mabongisi ya maponami te, kasi kaka misala ya kimia ya mwango ya bonzambe ya bokitani, etiami na Nzambe Yemoko.

Mikolo nyonso ya mosala ya Apostolo ezali mokolo ya boyekoli mpe ya bolengeli mpo na mokumba monene ya lobi ekoya. Ezwaka bantuku ya mibu ya mosala mpo na Apostolo elongwa na kiti ya bokambi ya nse amata na kiti ya bokambi ya likolo na bokitani. Na ntango wana, akolonga boyebi ya malamu na mosala nyonso akokutana na yango na Eklezia. Akokoma lisusu ya komesana malamu na bato ya mabele, kobakisaka mambi, babonkoko, nkota na bango lokola misala ezali komema ye mbala na mbala na mokili mobimba. Mosala ya kolengela bokitani oyo na bokambi ya Eklezia ezali se moko. Nayebi eloko moko mosusu te lokola oyo. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo ete oyo ezali Eklezia ya Nkolo. Asalaka na lolenge ya bato te.

Nasalelaki Nzambe na Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale na Bakambi mitano ya Eklezia oyo baleki. Nazalaki komona Mokambi moko na moko kozwaka emoniseli mpe eyano na emoniseli yango. Nkolo ntango nyonso azali mpe ntango nyonso akotinda mpe akofula baprofeta na Ye. Nkolo azali na yenda. Biso baoyo tokulisamaki mpo na kotatola nkombo na Ye ya bule na mokili mobimba tokokoba koluka koyeba bolingi na Ye mpe kolanda yango.

Tikala na Nzela ya Boyokani

Sikawa, na mondimi moko na moko ya Eklezia nalobi, bokoba na nzela. Bomipesi na bino ya kolanda Mobikisi na kosalaka mayokani elongo na Ye mpe nsima kobatela mayokani yango ekofungola ekuke na lipamboli nyonso ya molimo mpe makoki epesama epai ya mibali, basi, mpe bana bisika nyonso.

Lokola Bokambi ya sika, tolingi tobanda na nsuka na makanisi. Mpo na ntina ya oyo, tozali koloba na bino lelo uta na tempelo. Nsuka mpo na oyo moko na moko na biso azali koluka ezali ya kozwa dotasio elongo na nguya kati ya ndako ya Nkolo, kokangama lokola mabota, fidele na mayokani tosalaki na tempelo oyo elongobanisi biso mpo na likabo monene ya Nzambe—ya bomoi ya seko. Makuli ya tempelo mpe makuli tozali kosala kuna ezali fungola ya bolendisi bomoi na biso, libala mpe libota na biso, mpe likoki na biso mpo na kotelemela mimekano ya monguna. Masanzoli na bino na tempelo mpe mosala na bino kuna mpo na bankoko na bino ekopambola bino na emoniseli monene ya moto ye moko mpe kimia mpe ekolendisa bomipesi na bino mpo na kotikala na nzela ya boyokani.

Sikawa, soki botiki kotambola na nzela, ekoki ngai kobengisa bino na elikia nyonso na motema na ngai ete bolimbisi bozongela nzela. Botala makambo bosalaki te, botala mimekano te, esika ezali mpo na bino awa, Eklezia ya Nkolo. Bino mpe bana oyo babotami naino te bokopambolama na misala na bino sikawa mpo na kozongela na nzela ya boyokani. Tata na biso na Lola alengelaka bana na Ye, mpe alingaka moko na moko kati na biso azonga na ndako na Ye. Oyo ezali ntina monene ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka—ya kosunga moko na moko kati na biso azongela ndako.

Nalakisi bolingo na ngai ya mozindo epai na bino—bolingo oyo ekoli kati na bantuku ya mibu ya kokutanaka na bino, kosanzolaka elongo na bino, mpe kosungaka bino. Mosala biso ya bozambe ezali ya kokende na bikolo nyonso, mabota, nkota, mpe bato, kosungaka mpo na kolengela mokili mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo. Oyo tokosala na bondimi epai ya Nkolo Yesu Klisto, koyebaka ete Azali na mokumba. Oyo ezali mosala na Ye mpe Eklezia na Ye. Tozali basali na Ye.

Nasakoli bomipesi na ngai epai ya Nzambe Tata na biso ya Seko mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Nayebi Bango, nalingaka Bango, mpe nandimi kosalela Bango—mpe bino—na mpema oyo etikali na bomoi na ngai. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.