Moninga
Mwasi ya mokonzi Esetele
Moninga Sanza ya mwambe 2026


“Queen Esther,” Friend, Aug. 2026, 46–48.

Etinda ya sanza Moninga , Sanza ya mwambe 2026

Mwasi ya mokonzi Esetele

Elilingi ya Mwasi ya mokonzi Esetele mpe Mokonzi

Esetele azalaki Moyisalaele, to Moyuda, oyo avandaki na Perse. Mokonzi aponaki ye mpo na kozala mwasi na ye.

Elilingi ya Hamani na nkanda kotombolaka loboko na ye epai ya Modekai, oyo azalaki ya kofanda

Hamani azalaki mosali ya mokonzi Moto nyonso asengelaki kokumbamela ye. Kasi Modekai ndeko ya Esetele ozalaki kokumbamela bobele Nkolo.

Elilingi ya basoda kotangaka mikanda

Hamani azalaki na nkanda mpe ayebisaki mokonzi ete Bayuda balandaki mibeko te. Mokonzi atikaki Hamani kosala mobeko ya sika ete Bayuda nyonso basengelaki babomama.

Elilingi ya Modekai kosololaka na Esetele

Modekai asengaki Esetele asolola na mokonzi na ntina ya kobongola mobeko ya Hamani, kasi azalaki kobanga. Ntango mingi mokonzi abomaki bato oyo bayaki epai na ye na bozangi libyangi.

Elilingi ya Esetele kati na esika kotalaka batu kotambolaka na esika

Modekai alobaki ete ntango mosusu Nkolo atyaki Esetele na ndako ya mokonzi mpo na kobikisa bayuda.

Elilingi ya Esetele mpe basi mibale kofukama mpe kosambelaka

Esetele ayebaki ete asengelaki kosolola na mokonzi. Asengaki Bayuda mpe basali na ye kokila bilei elongo na ye.

Elilingi ya mokonzi kosimbaka lingenda na ye epai ya Esetele

Esetele akilaki bileyi mikolo misato. Ntango akendaki epai ya mokonzi, atandaki lingenda na ye. Yango elakisaki azalaki na esengo ya komona ye. Esetele ayebisaki mokonzi ete ye mpe bato na ye bakobomama likolo ya mobeko ya Hamani.

Elilingi ya Esetele kotalaka likolo na ngambo ya pole

Mokonzi asalaki mobeko ya sika oyo ebatelaki Bayuda. Bondimi ya Esetele epai ya Nkolo mpe mpiko na ye ebikisaki bato na ye.

Kopakolaka langi na lokasa

Nakoki Koyebisa Basusu Na oyo etali Yesu Klisto

PDF ya kopakolaka langi na lokasa ya elenge mobali moko na botelemi ya bus kolakisaka foto ya Yesu Klisto na bana basi mibale

Elilingi na Audrey Day. Ekoki kozala komekolama mpona bosaleli ya Eklezia kaka.

Nani okoki kokabola na ye nsango malamu? Sambela mpe tuna!