Moninga
Mosakoli Yisaya
Sanza ya zomi na mibale 2026


“Mosakoli Yisaya,” Moninga, Sanza ya zomi na mibale 2026, 46–47.

Etinda ya sanza Moninga , Sanza ya zomi na mibale 2026

Mosakoli Yisaya

Elilingi ya Yisaya komonaka Nkolo kati na limonisi

Mokolo moko kati na Tempelo, Nkolo abengaki Yisaya kozala mosakoli. Yisaya alingaki bato mpe ateyaki bango na ntina ya boyei ya Yesu Klisto

Elilingi ya Yisaya kosakolaka na ntina ya mbotama ya Yesu Klisto

Yisaya asosolaki ete Yesu Klisto akoya mokolo moko kosalisa bato na Ye uta na lisumu. Kasi moto moko te akoyeba Ye lokola Mobikisi na bango. Yisaya azalaki na mawa pamba te ayebaki mato mingi bakondimela Yesu te.

Elilingi ya Yisaya kokomaka na ntina ya Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto

Yisaya mpe lisusu asakolaki na ntina ya Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Mokolo moko Akozonga mpe akozala Mokonzi ya mokili mobimba. Akokokisa etinda ya Tata na Ye na komemaka boboto mpe kimia libela na libela. Yisaya alobaki moto nyonso akoyeba ete Yesu Klisto azali Mobikisi na bango.

Kopakolaka langi na lokasa

Yesu Klisto Abotamaki na Bethlehem

Coloring page PDF of Joseph leading a donkey with Mary riding on it

Elilingi na Audrey Day. Ekoki kozala komekolama mpona bosaleli ya Eklezia kaka.

Lolenge nini bosepelaka mbotama ya Mobikisi?