“Bokeba na Moto,” Moninga, Sanza ya zomi 2026, 46–48.
Etinda ya Sanza Friend , Sanza ya zomi 2026
Bosala keba na Moto
Mokonzi Nebukadanesala atongaki ekeko moko monene ya wolo mpe atindaki bato na ye na makasi basambela yango. Soki baboyi, bazalaki kotya bango na litumbu ya moto.
Sadadalake, Mesaka, mpe Abede-nego balingaki Nzambe mpe balingaki kosambela nzambe ya lokuta ya mokonzi te.
Baninga misato wana bayebisaki mokonzi ete bakosambela kaka Nzambe. Bandimaki ete Nzambe akoki kobatela bango. Kasi ata soki Abikisaki bango te, balingaki kotelema mpo na oyo bandimaki.
Mokonzi asilikaki. Atindaki baninga babwakama na litumbu ya moto. Kasi ntango mokonzi atalaki na kati ya litumbu, akamwaki komona ekelamu moko ya lola na moto elongo na bato yango misato.
Mokonzi abengaki Sadalake, Mesake mpe Abede-nego, mpe babimaki na litumbu. Moto yango esalaki bango mpasi te to mpe ezikisaki bango bilamba te.
Sadalake, Mesaka, mpe Abede-nego batosaki mitindo ya Nzambe, ata ntango bomoi na bango ezalaki na likama. Ndakisa na bango esalisaki mokonzi andima ete Nzambe azali.
Kopakolaka langi na lokasa
Baprofeta Babengamaka mpo na Koloba Maloba Ya Nkolo
Elilingi na Audrey Day. Ekoki kozala komekolama mpona bosaleli ya Eklezia kaka.
Ndenge nini ozali kolanda profetai?
© 2026 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, October 2026. Lingala. 20061 639