Bato banso bayambami malamu Kende na eklezia ya pembeni na yo.
Mituna oyo Bato Batunaka Mingi
Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazali baklisto?
Iyo! Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tondimelaka ete Yesu Klistoazali Mwana ya Nzambe mpe Mobikisi ya Mokili. Alingaka biso nyonso koleka mabanzo na biso. Tomizwaka biso moko lokola balandi bamipesa ya Yesu. Atako bindimeli na biso mosusu ekeseni, tondimaka ete na nzela ya bomoi , mosala , mbeka, mpe lisekwa na Ye, Yesu Klisto abikisaka biso na lisumu, mpasi, mpe liwa.
Yekola mingi etali ya biso bindimeli.
Milulu ya eklezia ezalaka ndenge nini?
Bantango ya mosala ya lingomba ekeseni uta na lingomba moko na lingomba mosusu. Nzokande, bokoki ntango nyonso kotya motema na losambo moko ya monene mpo na lingomba nyonso, oyo elandami na biteyelo mpo na bana, bilenge, mpe mikolo.
Molulu mpo na lingomba nyonso ebengami “likita ya elambo.” Liyangani oyo esangisaka banzembo, mabondeli, mpe mateya (to “masukulu”) epesami na bandimi ya ndenge na ndenge ya lisanga poso nyonso. Kasi eteni ya motuya mingi ya liyangani ezali ntango toliaka elambo (oyo ekokani na kominyo) mpo na komikundola Mobikisi.
Yekola mingi etali milulu ya mokolo ya Eyenga to kozwa eklezia pene na bino.
Mpo na nini Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali na batempelo?
Mpo na Basantu ya Mikolo mya Nsuka, tempelo ekeseni na bitonga misusu ya Eklezia. Tempelo ezali esika wapi Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazwaka mateya ya sikisiki etali Nzambe mpe Yesu Klisto. Na kati ya tempelo, biso bandimi tosalaka mayokani (to bilaka) elongo na Nzambe. Yango esangisi bilaka ya kobatela mitindo, kobika nsango malamu ya Yesu Klisto, kozala sembo na libala, mpe kosunga mpo na kobatela moko na mosusu na kokabolaka oyo tozali na yango.
Lisusu, mpo tondimelaka mabota ezali libela, mingi ya mosala oyo esalemi na kati ya batempelo ezali mpo na kosala bokangami ya libota lisusu makasi koleka. Mabala na tempelo esalemaka mpo na kowumela libela, kasi kaka te “kino liwa ekokabola bino.” Baboti mpe bana bakomaka mabota ya seko na batempelo. Bankoko bakoki mpe kozwa mapamboli nyonso ya tempelo soki moto moko asali makuli ya bule mpo na bango mpe bandimi elembo wana ya mosala. Batempelo ezali bisika oyo bato bazalaka na mosala ntango nyonso!
Buku ya Mormon ezali Nini?
Buku ya Mormon ezali buku ya makomi efulama oyo eteyaka biso etali Nzambe mpe Yesu Klisto. Esalisaka biso tozwa bokambi mpo na bomoi na biso moko mpe ekoki kosalisa biso tomiyoka penepene na Yesu Klisto. Nkombo yango ewuta wapi? Bankama ya mibu eleki, profeta moko ya kala na nkombo ya Mormon asangisaki mokanda ya bato na ye. Bakutanaki na mikakatano mingi ndenge moko na biso. Mpe kaka lokola biso, bazwaki makasi ntango babalukaki epayi ya Yesu Klisto. Zwa maloba ya boyingisi ya Buku ya Mormon elongo na bamisionele.
Buku ya Mormon etelemi pembeni ya Biblia lokola litatoli mosusu ya Yesu Klisto mpe etinda na Ye ya bonzambe lokola Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili. Elongo, Biblia mpe Buku ya Mormon epesaka bososoli mingi ya bolingo monene ya Nzambe mpo na biso nyonso mpe ekoki kosalisa biso topusana penepene na Ye.
Boyekola mingi etali lolenge Biblia mpe Buku ya Mormon esalaka elongo.
Tondimelaka Biblia?
Iyo. Biblia ezali liloba ya Nzambe, ebele ya makomi ya bule, mpe kolandaka mateya na yango ememaka esengo na bomoi na biso. Elongo na Biblia, tozwaka lisusu bofuli na mikanda mosusu ya makomi oyo ekeseni na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Nyonso mibale esalaka mpe etambolaka elongo mpo na koteya biso solo ya ntina etali Nzambe mpe Yesu Klisto.
Yekola mingi etali bondimeli na biso na Biblia.
Kola penepene ya Nzambe Kutana na bamisionele.
Bokutana na interneti to na bomoto. Tokoyanola mituna na yo mpe tokolakisa yo lingomba ya etuka ya Eklezia na bino.
Lisanga ya Bondimi Eyekami na Yesu Klisto
Zwa nsango ya sika uta na Eklezia.
Makambo ya malamu ezali kosalama na mokili. Zwa makambo ya sika na ntina ya misala ya Eklezia, milulu, milende ya lisungi na makama, mpe mingi koleka.